Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Solo ya Biblia ekokisaki mposa makasi nazalaki na yango ya kozwa biyano

Solo ya Biblia ekokisaki mposa makasi nazalaki na yango ya kozwa biyano
  • ABOTAMAKI NA: 1987

  • EKÓLO: AZERBAÏDJAN

  • BOMOI NA YE YA KALA: TATA AZALAKI MIZILMA MPE MAMA MOYUDA

NDENGE NAZALAKI:

Nabotamá na Baku, na ekólo Azerbaïdjan; nazali mwana ya nsuka na libota ya bana mibale. Tata azalaki mizilma mpe mama Moyuda. Baboti na ngai balinganaki makasi mpe bandimaki moto na moto azala na lingomba na ye. Mama azalaki kosalisa tata ntango azalaki kosala karɛme na eleko ya Ramadan, mpe tata azalaki kosalisa mama ntango azalaki kosala fɛti ya pasika. Tozalaki na Coran, Torah mpe Biblia na ndako.

Nazalaki komibenga mizilma. Atako nazalaki kondima ete Nzambe azalaka, nazalaki na makambo oyo ezalaki kotungisa ngai. Nazalaki komituna: ‘Mpo na nini Nzambe akelaki bato, mpe mpo na nini mpenza moto akoki konyokwama bomoi na ye mobimba bongo na nsima akende konyokwama libela na lifelo?’ Lokola bato balobaka ete makambo nyonso oyo esalemaka ezali mokano ya Nzambe, nazalaki komituna boye: ‘Nzambe abimiselaka bato bampasi mpe na nsima asepelaka kotala ndenge bazali konyokwama?’

Ntango nazalaki na mbula 12, nakómaki kosala namaz; mabondeli mitano oyo bamizilma basalaka mokolo na mokolo. Na ntango wana, tata akɔtisaki ngai ná yaya na eteyelo ya Bayuda. Kuna, bazalaki mpe kolakisa biso monɔkɔ ya Ebre mpe mimeseno oyo ezalaki na Torah. Mikolo nyonso liboso tóbanda kelasi, tozalaki kosambela na kolanda mimeseno ya Bayuda. Yango wana, na ntɔngɔ nazalaki kosala namaz na ndako mpe na kelasi nazalaki kosangana na mabondeli ya Bayuda.

Nazalaki mpenza na mposa ya kozwa biyano oyo ebongi na mituna na ngai. Nazalaki mbala na mbala kotuna barabi na eteyelo boye: “Mpo na nini Nzambe akelaki bato? Ndenge nini Nzambe ataleka tata na ngai, oyo azali mizilma? Azali moto malamu, boye, mpo na nini batalelaka ye ete azali mbindo? Mpo na nini Nzambe akelaki ye?” Mwa biyano oyo bapesaki ngai ezalaki na nzela te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Natikaki kondimela Nzambe na 2002. Toutaki kolongwa na mboka na biso mpe tokendaki kofanda na Allemagne; kaka pɔsɔ moko na nsima, tata abɛlaki maladi na bɔɔngɔ mpe azalaki komiyeba te. Banda bambula mingi nazalaki kobondela Nzambe mpo libota na biso ezala malamu mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Lokola nandimaki mpenza ete kaka Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde azali na nguya likoló ya bomoi mpe liwa, nazalaki kobondela ye mikolo nyonso mpo na bomoi ya tata na ngai. Nakanisaki ete ‘ezali likambo moke mpo na Nzambe akokisa mposa makasi oyo mwa mwana moke ya mwasi azalaki na yango.’ Natyaki mpenza motema ete akokokisa mposa na ngai. Kasi tata akufaki.

Lokola namonaki ete Nzambe akokisi mposa na ngai te, nalɛmbaki nzoto. Nakanisaki ete ‘mbala mosusu nazalaki kobondela mabe to Nzambe nde azalaka te.’ Nazokaki mpota na motema mpe nazalaki kokoka kosala lisusu namaz te. Mangomba mosusu ezalaki na ntina te mpo na ngai, yango wana namonaki ete Nzambe azalaka te.

Sanza motoba na nsima, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na biso. Lokola tozalaki kozwa bakristo na valɛrɛ te, ngai ná yaya tolingaki komonisa bango na limemya nyonso ete bazalaki na libunga. Totunaki bango boye: “Mpo na nini bakristo basambelaka Yesu, ekulusu, Maria, mpe bikeko mosusu nzokande Mibeko Zomi epekisi yango?” Batatoli yango balakisaki biso na Biblia makambo oyo endimisaki mpenza ete bakristo ya solo basengeli kosambela bikeko te mpe kobondela kaka Nzambe. Yango ekamwisaki ngai.

Na nsima, totunaki boye: “Bongo liteya ya Bosato? Soki Yesu azali Nzambe, ndenge nini akokaki kozala na bomoi awa na mabele mpe bato báboma ye?” Bayanolaki mpe na motuna yango na Biblia mpe balimbolaki ete Yesu azalaki Nzambe te, akokanaki mpe na ye te. Batatoli balobaki ete yango nde ntina oyo bandimaka liteya ya Bosato te. Nakamwaki mpe namitunaki na motema soki ‘bazali bakristo ya ndenge nini.’

Ata bongo, nazalaki kaka na mposa ya koyeba ntina oyo bato bakufaka mpe mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala. Batatoli balakisaki ngai buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, * oyo ezalaki na mikapo oyo epesaki biyano na mituna na ngai. Bakómaki mbala moko koyekolisa ngai Biblia.

Mbala nyonso oyo tozalaki koyekola, nazalaki kozwa biyano ya Biblia na mituna na ngai. Nayaki koyeba ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. (Nzembo 83:18) Ezaleli na ye oyo eleki monene ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Akelaki bato mpo alingaki kokabola likabo ya bomoi elongo na bango. Nayaki koyeba ete atako Nzambe atikaka makambo ya kozanga bosembo, ayinaka yango mpe mosika te akolongola yango mpo na libela. Nayebaki ete botomboki ya Adama ná Eva ememelá bato mpasi. (Baroma 5:12) Moko ya bampasi yango ezali liwa ya moto oyo olingaka mingi, na ndakisa liwa ya tata na ngai. Kasi, Nzambe akolongola makambo ya mpasi ndenge wana na mokili ya sika oyo ezali koya, epai bakufi bakozonga lisusu na bomoi.​—Misala 24:15.

Solo ya Biblia ekokisaki mposa makasi nazalaki na yango ya kozwa biyano. Nazongelaki kondima Nzambe. Ntango nakómaki koyeba Batatoli ya Yehova malamu koleka, namonaki ete bazali libota ya bandeko ya mokili mobimba. Bomoko mpe bolingo na bango ekamwisaki ngai. (Yoane 13:34, 35) Makambo oyo nayekolaki na ntina na Yehova etindaki ngai nalinga kosalela ye, yango wana nazwaki ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova. Nazwaki batisimo na mokolo ya 8/01/2005.

MATOMBA OYO NAZWI:

Biyano oyo ebongi ya Biblia ebongisaki ndenge na ngai ya kotalela bomoi. Bandimbola ya malamu mpenza oyo nazwaki na Liloba ya Nzambe epesi ngai kimya ya motema. Elikya ya komona lisusu tata na ngai na lisekwa ndenge Liloba ya Nzambe elaki, ebɔndisaka mpe epesaka ngai esengo mpenza.​—Yoane 5:28, 29.

Esali sikoyo mbula 6 banda nabalá Jonathan, mobali malamu oyo abangaka Nzambe. Ngai ná ye toyekoli ete solo na ntina na Nzambe ebongi, ezali pɛtɛɛ mpe ezali eloko moko ya motuya mpenza. Yango wana, tosepelaka koyebisa basusu mateya mpe elikya kitoko oyo tozali na yango. Lelo oyo, nayebi ete Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo.

^ par. 15 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi sikoyo ebimaka lisusu te.