Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?

Mpo na nini Yesu abengami Mwana ya Nzambe?

Eyano ya Biblia

 Mbala mingi Biblia ebengaka Yesu “Mwana ya Nzambe.” (Yoane 1:49) Maloba “Mwana ya Nzambe” emonisi ete Nzambe azali Mozalisi, to mpe bomoi nyonso euti epai na ye, ata mpe bomoi ya Yesu. (Nzembo 36:9; Emoniseli 4:11) Biblia eteyaka te ete Nzambe abotaki mwana moko boye ndenge bato babotaka bana.

 Biblia ebengaka mpe baanzelu “bana ya Nzambe ya solo.” (Yobo 1:6) Lisusu Biblia elobi ete Adama moto ya liboso, azalaki “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Kasi, lokola Yesu azalaki ekelamu ya liboso ya Nzambe mpe kaka ye nde ekelamu ya liboso oyo Nzambe ye moko akelaki, Biblia elobeli Yesu lokola Mwana ya libosoliboso ya Nzambe.

 Yesu azalaki na likoló liboso abotama awa na mabele?

 Ɛɛ. Yesu azalaki ekelamu ya elimo kuna na likoló liboso abotama awa na mabele lokola moto. Yesu ye moko alobaki boye: “Nautaki na likoló nakiti.”​—Yoane 6:38; 8:23.

 Nzambe akelaki Yesu liboso ya kokela biloko mosusu nyonso. Biblia elobi boye mpo na Yesu:

  •   “Azali . . . mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.”​—Bakolose 1:15.

  •   Azali “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.”​—Emoniseli 3:14.

 Yesu akokisaki esakweli etali moto “oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te”​—Mika 5:2; Matai 2:4-6.

 Yesu azalaki kosala nini kuna na likoló liboso aya na mabele?

 Azalaki na lokumu mingi kuna na likoló. Yesu alobelaki lokumu oyo azalaki na yango na likoló ntango abondelaki boye: “Tata, pesá ngai nkembo . . . na nkembo oyo nazalaki na yango pembeni na yo liboso ete mokili ezala.”​—Yoane 17:5.

 Asalisaki Tata na ye na kokela biloko mosusu nyonso. Yesu asalaki pembeni ya Nzambe “lokola mosali ya mayele.” (Masese 8:30) Biblia elobi boye mpo na Yesu: “Na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele.”​—Bakolose 1:16.

 Na nzela ya Yesu nde Nzambe akelaki biloko mosusu nyonso. Na biloko yango, tokoki kotánga bikelamu nyonso ya elimo, ata mpe likoló ná mabele. (Emoniseli 5:11) Na maloba mosusu, boyokani ya Nzambe ná Yesu ezalaki lokola oyo ya mosali-plan mpe motongi-ndako. Mosali-plan abongisaka plan ya ndako mpe motongi-ndako asalelaka plan yango mpo na kotonga ndako.

 Azalaki mpe Liloba. Biblia ebengaka Yesu “Liloba” ntango elobelaka bomoi na ye liboso aya awa na mabele. (Yoane 1:1) Emonani ete Nzambe asalelaki Mwana na ye mpo na kopesa nsango mpe malako epai ya bikelamu mosusu ya elimo.

 Emonani mpe ete Yesu asalaki lokola Molobeli ya Nzambe epai ya bato awa na mabele. Ekoki kozala ete Nzambe alobaki na nzela ya Yesu ntango apesaki Adama ná Eva malako na elanga ya Edene. (Ebandeli 2:16, 17) Ekoki mpe kozala ete Yesu nde anzelu oyo akambaki Bayisraele na esobe mpe oyo Bayisraele basengelaki kotosa mongongo na ye.​—Kobima 23:20-23. a

a Nzambe alobaki kaka na nzela ya Liloba te. Na ndakisa, na esika asalela Mwana na ye ya liboso, Nzambe asalelaki mpe baanzelu mosusu mpo na kopesa Bayisraele mibeko na ye.​—Misala 7:53; Bagalatia 3:19; Baebre 2:2, 3.