Lakisá makambo oyo ezali na kati

Baanzelu bazali banani?

Baanzelu bazali banani?

Eyano ya Biblia

 Baanzelu bazali bikelamu oyo bazali na nguya mpe makoki koleka oyo ya bato. (2 Petro 2:11) Bafandaka na likoló, esika oyo eleki likoló ná mabele oyo tomonaka na miso. (1 Bakonzi 8:27; Yoane 6:38) Yango wana, babengaka bango mpe bilimo.​—1 Bakonzi 22:21; Nzembo 18:10.

Baanzelu bautá wapi?

 Nzambe akelaki baanzelu na nzela ya Yesu, oyo Biblia ebengi ye “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” Biblia elobeli ndenge Nzambe asalelaki Yesu ntango azalaki kokela; elobi boye: “Na nzela na ye [Yesu] biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele, biloko oyo emonanaka mpe biloko oyo emonanaka te,” ata mpe baanzelu. (Bakolose 1:13-17) Baanzelu babalaka te mpe babotaka te. (Marko 12:25) Kutu, Nzambe ya solo akelaki mokomoko ya baanzelu yango.​—Yobo 1:6.

 Nzambe akelaki baanzelu kalakala mpenza, liboso akela mabele. Ntango Nzambe ekelaki mabele, baanzelu “babandaki koganga na esengo.”​—Yobo 38:4-7.

Baanzelu bazali boni?

 Biblia epesi te motángo mpenza ya baanzelu, kasi emonisi ete bazali ebele mpenza. Na ndakisa, na emonaneli oyo ntoma Yoane azwaki, amonaki mpe ebele mpenza ya baanzelu.​—Emoniseli 5:11.

Anzelu mokomoko azalaka na nkombo mpe bizaleli na ye?

 Ɛɛ. Biblia epesi nkombo ya baanzelu mibale: Mikaele mpe Gabriele. (Danyele 12:1; Luka 1:26) a Baanzelu mosusu bandimaki ete bazali na nkombo, kasi bayebisaki yango bato te.​—Ebandeli 32:29; Basambisi 13:17, 18.

 Baanzelu bakeseni bizaleli. Bakoki kosolola bango na bango. (1 Bakorinti 13:1) Bazali na likoki ya kokanisa mpe ya kobimisa maloba ya kokumisa Nzambe. (Luka 2:13, 14) Bazali mpe na bonsomi ya kopona oyo ezali malamu to mabe, ndenge emonanaki ntango bamosusu kati na bango basalaki lisumu ndenge balandaki Satana Zabolo mpe batombokelaki Nzambe.​—Matai 25:41; 2 Petro 2:4.

Baanzelu bazalaka na lokumu ndenge moko?

 Te. Anzelu oyo aleki na nguya mpe na bokonzi ezali Mikaele, anzelu-mokonzi. (Yuda 9; Emoniseli 12:7) Baserafɛ, oyo batɛlɛmaka pene ya kiti ya bokonzi ya Yehova bazali baanzelu ya lokumu mingi. (Yisaya 6:2, 6) Bakeruba mpe bazali baanzelu mosusu ya lokumu mingi mpe bazalaka na mikumba ya ntina mingi. Na ndakisa, Bakeruba nde bakɛngɛlaki porte ya Elanga ya Edene ntango Nzambe abenganaki Adama ná Eva na elanga yango.​—Ebandeli 3:23, 24.

Baanzelu basalisaka bato?

 Ɛɛ, Nzambe asalelaka baanzelu ya sembo lelo mpo na kosalisa bato.

Moto na moto azalaka na anzelu oyo abatelaka ye?

 Atako baanzelu babatelaka basaleli ya Nzambe na elimo, yango elingi koloba te ete Nzambe atyelá mokristo mokomoko anzelu oyo abatelaka ye. b (Matai 18:10) Baanzelu babatelaka te basaleli ya Nzambe na mpasi to komekama nyonso. Biblia emonisi ete mbala mingi, Nzambe ‘abongisaka nzela ya kobima’ na komekama ndenge apesaka basaleli na ye bwanya mpe makasi ya koyika mpiko.​—1 Bakorinti 10:12, 13; Yakobo 1:2-5.

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango na ntina etali baanzelu

 Libunga: Baanzelu nyonso bazalaka malamu.

 Solo: Biblia elobeli “mampinga ya bilimo mabe” mpe “baanzelu oyo basumukaki.” (Baefese 6:12; 2 Petro 2:4) Baanzelu ya mabe bazali bademo, baoyo balandaki Satana mpe batombokelaki Nzambe.

 Libunga: Baanzelu bakufaka te.

 Solo: Baanzelu ya mabe ná Satana Zabolo bakobomama.​—Yuda 6.

 Libunga: Bato bakómaka baanzelu soki bakufi.

 Solo: Baanzelu bazali bikelamu oyo Nzambe akelá, bazali te bato oyo basekwi. (Bakolose 1:16) Bato oyo basekwi mpo na bomoi na likoló, Nzambe apesaka bango likabo ya bomoi oyo ekufaka te. (1 Bakorinti 15:53, 54) Bakozala na lokumu mingi koleka baanzelu.​—1 Bakorinti 6:3.

 Libunga: Baanzelu bazali wana mpo na kosalela bato.

 Solo: Baanzelu batosaka mibeko ya Nzambe kasi ya bato te. (Nzembo 103:20, 21) Ata Yesu ayebaki ete asengelaki kosɛnga Nzambe lisalisi, kasi mbala moko te epai ya baanzelu.​—Matai 26:53.

 Libunga: Tokoki kobondela baanzelu básalisa biso.

 Solo: Kobondela Nzambe ezali moko ya makambo ya losambo na biso oyo ebongi kopesa yango Yehova Nzambe. (Emoniseli 19:10) Tosengeli kobondela kaka Nzambe na nzela ya Yesu.​—Yoane 14:6.

a Mabongoli mosusu ya Biblia esaleli liloba “Lucifer” na Yisaya 14:12, mpo na bato mosusu, yango ezali nkombo ya anzelu oyo akómá Satana Zabolo. Kasi, liloba ya Ebre oyo esalelami wana elimboli “oyo azali kongɛnga.” Bavɛrsɛ oyo ezali liboso emonisi ete maloba yango esalelami te mpo na kobenga Satana, kasi nde boyangeli ya Babilone, oyo Nzambe asengelaki kolongola mpo na lofundo na yango. (Yisaya 14:4, 13-20) Maloba “oyo azali kongɛnga” esalelamaki mpo na kotyola boyangeli ya Babilone nsima ya kokwea na yango.

b Bato mosusu balobaka ete kobima ya Petro na bolɔkɔ emonisi ete Petro azalaki na anzelu oyo azalaki kobatela ye. (Misala 12:6-16) Kasi, ntango bayekoli balobelaki “anzelu na ye [Petro],” mbala mosusu na libunga nyonso, bakanisaki ete anzelu oyo azalaki momonisi ya Petro ayaki epai na bango, kasi Petro ye moko te.