Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yoane 1:1​—“Na ebandeli Liloba azalaki”

Yoane 1:1​—“Na ebandeli Liloba azalaki”

 “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki nzambe.”​—Yoane 1:1, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Na ebandeli Liloba azalaki, mpe Liloba azalaki mboka na Nzambe, Liloba azalaki mpe Nzambe.”​—Yoane 1:1, Biblia Haut-fleuve.

Ndenge Yoane 1:1 elimbolami

 Vɛrsɛ oyo emonisi makambo mikemike etali bomoi ya Yesu Kristo liboso aya awa na mabele lokola moto. (Yoane 1:14-17) Na vɛrsɛ 14, “Liloba” (to “Logos,” to ho logos na Grɛki) esalelami lokola titre. Nzambe asalelaki Yesu mpo na kopesa basusu mibeko mpe malako na ye. Emonani ete mpo na mokumba yango nde babengi Yesu “Liloba.” Yesu akobaki koteya bato liloba ya Nzambe ntango azalaki awa na mabele mpe ntango azongaki na likoló.​—Yoane 7:16; Emoniseli 1:1.

 Liloba “ebandeli” elimboli ntango oyo Nzambe abandaki mosala na ye ya bozalisi mpe azalisaki Liloba. Na nsima, Nzambe asalelaki Liloba mpo na kokela biloko mosusu nyonso. (Yoane 1:2, 3) Biblia elobi ete Yesu azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá” mpe ete “na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki.”​—Bakolose 1:15, 16.

 Maloba “Liloba azalaki nzambe” emonisi ete liboso Yesu aya awa na mabele azalaki na lolenge ya Nzambe, elingi koloba, azalaki ekelamu ya elimo oyo azali na nguya mpe na bizaleli oyo ekokani na oyo ya Nzambe. Tokoki koloba azalaki nzambe mpo azalaki Molobeli ya Nzambe mpe azalaki Mwana ya liboso ya Nzambe oyo abotamaki, oyo na nzela na ye Nzambe asalaki biloko mosusu nyonso.

Makambo oyo bazali kolobela na Yoane 1:1

 Mokanda ya Yoane elobeli bomoi ya Yesu mpe mosala na ye awa na mabele. Bavɛrsɛ ya ebandeli ya mokapo ya liboso elobeli bomoi ya Yesu liboso aya awa na mabele, boyokani na ye ná Nzambe, mpe mokumba ya ntina oyo azali na yango na oyo etali boyokani ya Nzambe ná bato. (Yoane 1:1-18) Makambo yango ezali kosalisa biso tóyeba oyo Yesu asalaki mpe alobaki ntango azalaki awa na mabele.​—Yoane 3:16; 6:38; 12:49, 50; 14:28; 17:5.

Makanisi ya libunga mpo na Yoane 1:1

 Likanisi ya libunga: Maloba ya nsuka ya Yoane 1:1 esengeli kobongolama boye “Liloba azalaki Nzambe.”

 Solo: Atako babongoli mingi ya Biblia babongoli vɛrsɛ yango bongo, kasi babongoli mosusu bandimisami ete esengeli kobongola yango ndenge mosusu. Na monɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli, mbala mibali oyo bazongeli liloba “Nzambe” (Grɛki, theos) na Yoane 1:1 ekomamaki ndenge moko te. Mbala ya liboso oyo balobeli liloba “Nzambe,” liboso ya liloba yango batye artikle na monɔkɔ ya Grɛki, nzokande na mbala ya mibale oyo balobeli liloba “Nzambe,” artikle yango ezali te. Bato mingi oyo balimbolaka maloba ya Biblia bamonisi ete bokeseni wana ezali mpenza na ntina. Na ndakisa, ndenge batye te artikle yango na mbala ya mibale oyo basaleli liloba “Nzambe,” buku The Translator’s New Testament elobi boye: “Artikle yango emonisi ezaleli oyo bapesi Theos to Nzambe oyo basaleli na mbala ya mibale, mpo fraze yango epesa likanisi ete ‘Liloba azalaki na lolenge ya Nzambe.’” a Bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia b mpe mabongoli mosusu ya Biblia bamonisi mpe bokeseni wana.

 Likanisi ya libunga: Vɛrsɛ yango eteyaka ete Liloba ezali kaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.

 Solo: Maloba “Liloba azalaki Nzambe” emonisi ete vɛrsɛ oyo ezali kolobela bato mibali bakeseni. Ekoki kosimba te Liloba azala “elongo na Nzambe” mpe ye moko kaka azala Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Kutu bavɛrsɛ mosusu oyo ezali na mokapo yango emonisi ete Liloba ezali te Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Na ndakisa, Yoane 1:18 elobi ete “moto ata moko te amoná Nzambe.” Nzokande, bato bamonaki Liloba, elingi koloba, Yesu. Yango wana, Yoane 1:14 elobi ete “Liloba akómaki moto mpe afandaki na kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye.”

 Likanisi ya libunga: Liloba azalaka na ebandeli te mpe nsuka te.

 Solo: Liloba “ebandeli” oyo balobeli na vɛrsɛ oyo ekoki te kozala “ebandeli” ya Nzambe, mpo Nzambe azalaka na ebandeli te. Yehova c Nzambe azali “libela na libela.” (Nzembo 90:1, 2) Nzokande, Liloba, elingi koloba, Yesu Kristo, azali na ebandeli. Azali “ebandeli ya bozalisi ya Nzambe.”​—Emoniseli 3:14.

 Likanisi ya libunga: Kobenga Liloba “nzambe” ezali kopesa liteya ya kosambela banzambe ebele.

 Solo: Liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “Nzambe” to “nzambe” (the·osʹ) mbala mingi eyokani na liloba ya Ebre ʼel mpe ʼelohimʹ, basalelaka yango mbala mingi na Testama ya Kala. Mbala mingi maloba yango ya Ebre epesaka likanisi ya “Moto oyo azali na nguya to na makasi” mpe basalelaka yango mpo na kolobela Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, banzambe mosusu, ata mpe bato. (Nzembo 82:6; Yoane 10:34) Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela ya Liloba, yango wana tokoki koloba ete Liloba azalaki na nguya. (Yoane 1:3) Koloba ete Liloba ezali “nzambe” eyokani na esakweli oyo ezali na Yisaya 9:6, oyo esakolaki ete Nzambe aponaki moto moko, Masiya to Kristo, oyo akobengama “Nzambe ya Nguya” (na Ebre, ʼEl Gib·bohr), kasi te “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” (ʼEl Shaddai, ndenge emonisami na Ebandeli 17:1; 35:11; Kobima 6:3; Ezekiele 10:5).

 Biblia epekisi kosambela banzambe mingi. Yesu Kristo alobaki: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Matai 4:10) Biblia elobi: “Mpo atako baoyo babengami ‘banzambe’ bazalaka, ezala na likoló to na mabele, ndenge ‘banzambe’ bazali mingi mpe ‘bankolo’ bazali mingi, mpo na biso, ya solo, Nzambe azali kaka moko, ye Tata, oyo biloko nyonso euti na ye, mpe biso mpo na ye; mpe Nkolo azali kaka moko, Yesu Kristo, oyo na nzela na ye biloko nyonso ezali, mpe biso na nzela na ye.”​—1 Bakorinti 8:5, 6.

a The Translator’s New Testament, lokasa 451.

b Jason David BeDuhn, moto oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete ndenge batye te artikle yango na mbala ya mibale oyo basaleli liloba “Nzambe,” emonisi ete liloba “‘nzambe’ ekeseni na liloba ‘Nzambe’ na Anglais.” Akobi boye: “Na Yoane 1:1, Liloba ezali te ye moko mpe kaka ye nde Nzambe, kasi ezali nde nzambe, to moto oyo azali na lolenge ya Nzambe.”​—Truth in Translation: Accuracy and Bias in English Translations of the New Testament, lokasa 115, 122, mpe 123.

c Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.