Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo, oyo Yehova Nzambe asalá. Na Biblia, “bokonzi ya Nzambe” ebengami mpe “bokonzi ya likoló,” mpo bokonzi yango ekozala na likoló mpe ekoyangela mabele. (Marko 1:14, 15; Matai 4:17) Atako makambo na yango mosusu ekokani na oyo ya baguvɛrnema ya bato, eleki baguvɛrnema yango na makambo nyonso.

  •   Bakonzi. Nzambe aponá Yesu Kristo azala Mokonzi na Bokonzi yango mpe apesá ye bokonzi mingi koleka bakonzi nyonso. (Matai 28:18) Yesu asalelaka nguya yango kaka mpo na kosalisa bato, mpo ntango azalaki awa na mabele, amonisaki ete azali Motambwisi ya malamu mpe ya motema mawa. (Matai 4:23; Marko 1:40, 41; 6:31-34; Luka 7:11-17) Na lisalisi ya Nzambe, Yesu aponi na bikólo nyonso bato oyo “bakoyangela mabele” elongo na ye na likoló.​—Emoniseli 5:9, 10.

  •   Ekoumela mbula boni? Guvɛrnema yango ekeseni na baguvɛrnema ya bato, oyo ebandaka mpe esukaka, Bokonzi ya Nzambe “ekobebisama te.”​—Danyele 2:44.

  •   Bato na yango. Moto nyonso oyo atosaka mibeko ya Nzambe akoki kozala mwana-mboka to moto ya Bokonzi ya Nzambe, ata soki azali moto ya ekólo nini.​—Misala 10:34, 35.

  •   Mibeko. Mibeko ya Bokonzi ya Nzambe ezali kaka mpo na kopekisa makambo ya mabe te. Esalisaka bato oyo bazali kolanda yango bázala na bizaleli ya malamu. Na ndakisa, Biblia elobi boye: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Matai 22:37-39) Kolinga Nzambe mpe bato etindaka bato oyo bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe bálukaka bolamu ya basusu.

  •   Mateya. Bokonzi ya Nzambe esuki kaka te na kotyela bato na yango mibeko, kasi ezali mpe koteya bato yango ndenge ya kotosa mibeko yango.​—Yisaya 48:17, 18.

  •   Mosala. Bokonzi ya Nzambe ekosala te ete bakonzi na yango bádondwa, bongo bato mosusu bákelela. Kasi, ekokokisa nde mokano ya Nzambe, kati na yango elaka oyo elobi ete bato oyo balingaka Nzambe bakofanda libela na libela na paradiso awa na mabele.​—Yisaya 35:1, 5, 6; Matai 6:10; Emoniseli 21:1-4.