Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nani azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe?

Nani azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe?

Nzambe atindaki bakomi mingi ya Biblia bákoma makambo oyo ekosalisa biso tóyeba moto oyo asengelaki kokóma Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Mokonzi yango asengelaki

  • Koponama na Nzambe. ‘Ngai, natye Mokonzi na ngai . . . Nakopesa yo bikólo mpo ezala libula na yo mpe mabele tii na bansuka na yango ezala ya yo.’​—Nzembo 2:6, 8.

  • Kozwa kiti ya bokonzi ya Davidi. “Baboteli biso mwana, bapesi biso mwana mobali . . . Bonene ya boyangeli na ye mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te. Ekopikama makasi.”​—Yisaya 9:6, 7.

  • Kobotama na Beteleme. “Ee Beteleme . . . , uta na yo moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi . . . Akozala monene tii na bandelo ya nsuka ya mabele.”​—Mika 5:2, 4.

  • Koboyama na bato mpe kobomama. “Atyolamaki, mpe tomonaki ye mpamba. . . . Atɔbɔlamaki mpo na misala na biso ya kobuka mibeko; anyatamaki mpo na mabunga na biso.”​—Yisaya 53:3, 5.

  • Kosekwa mpe kozwa nkembo. “Okotika molimo na ngai na kati ya Nkunda te. Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu. . . . Makambo oyo epesaka esengo ezali na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na seko.”​—Nzembo 16:10, 11.

Yesu abongi mpenza kozala Mokonzi ya bato

Banda mokili ebanda, kaka moto moko nde akokisi makambo wana nyonso, mpe moto yango ezali Yesu Kristo. Kutu, anzelu ayebisaki Maria, mama ya Yesu, boye: “Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, . . . mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”​—Luka 1:31-33.

Yesu atikalá ata mokolo moko te kokóma mokonzi awa na mabele. Kasi, azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló mpe akoyangela mabele. Mpo na nini azali Mokonzi oyo abongi mpenza? Tólobela makambo oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele.

  • Yesu azalaki kolinga bato. Yesu asalisaki bato ya ndenge nyonso: basi mpe mibali, bilenge mpe mikóló, Bayuda to bato ya bikólo mosusu, bazwi mpe babola; azalaki kopona bilongi te. (Matai 9:36; Marko 10:16) Ntango moto ya maba abondelaki ye ete: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto,” Yesu ayokelaki ye mawa mpe abikisaki ye.​—Marko 1:40-42.

  • Yesu ayebisaki biso oyo tokoki kosala mpo na kosepelisa Nzambe. Alobaki boye: “Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.” Alobaki mpe ete tosengeli kosalela basusu makambo ndenge tokolinga básalela biso. Amonisaki mpe ete Nzambe akipaka makambo tozali kosala, makanisi na biso mpe ndenge tozali komiyoka. Na yango, mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kobatela motema na biso. (Matai 5:28; 6:24; 7:12) Alobaki mpe ete mpo na kozala na esengo ya solosolo, tosengeli koluka koyeba makambo Nzambe alingi tósala mpe kotosa yango.​—Luka 11:28.

  • Yesu ateyaki bato ndenge ya komonisa bolingo. Makambo oyo Yesu alobaki mpe oyo asalaki ezalaki na nguya mpe esimbaki mpenza mitema ya bato. Biblia elobi ete: “Ebele ya bato wana bakamwaki na ndenge na ye ya koteya; mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi.” (Matai 7:28, 29) Ateyaki bango ete: ‘Bólinga banguna na bino.’ Kutu, abondelaki mpo na bato oyo babomaki ye, alobaki boye: “Tata, limbisá bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”​—Matai 5:44; Luka 23:34.

Yesu abongi mpenza kozala Mokonzi ya mokili mpo alingaka kosalisa mpe azali na boboto. Kasi ntango nini akoyangela mabele?