Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yesu azalaki kaka moto moko malamu?

Yesu azalaki kaka moto moko malamu?

Eyano ya Biblia

 Yesu azalaki kaka moto moko malamu te. Na mokuse, tokoki koloba ete azali moto oyo atiká nsango koleka moto mosusu nyonso na mokili. Talá makambo oyo bato ya mayele na istware mpe bakomi minene balobá mpo na ye:

 “Yesu moto ya Nazarete . . . azali moto oyo atiká nsango koleka bato nyonso.”​—H. G. Wells, mokomi ya istware na Angleterre.

 “[Yesu] azali moto oyo abongolá bato mingi koleka na mokili oyo, mpe azali kobongola bato tii lelo.”​—Kenneth Scott Latourette, mokomi ya istware na États-Unis.

 Biblia emonisi ntina oyo Yesu atiká nsango koleka bato mosusu nyonso ya malamu. Ntango Yesu atunaki bantoma na ye soki bakanisi ete azali nani, moko na bango alobaki polele ete: “Ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.”​—Matai 16:16.