Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?

Bisakweli oyo elobeli Masiya emonisaki ete Yesu azalaki Masiya?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, akokisaki bisakweli mingi etali “Masiya Mokambi” oyo alingaki kozala “Mobikisi ya mokili.” (Danyele 9:25; 1 Yoane 4:14) Ata nsima ya liwa na ye, Yesu akobaki kokokisa bisakweli etali Masiya.​—Nzembo 110:1; Misala 2:34-36.

 Liloba “Masiya” elimboli nini?

 Ebengeli ya Ebre Ma·shiʹach (Masiya) oyo na Grɛki ebengamaka Khri·stos (Kristo) nyonso mibale elimboli “Moto oyo atyami mafuta.” Boye, ebengeli “Yesu Kristo” elimboli “Yesu moto oyo atyami mafuta,” to “Yesu Masiya.”

 Na ntango ya kala, mbala mingi bazalaki kosopela moto mafuta na motó soki bapesi ye bokonzi. (Balevi 8:12; 1 Samwele 16:13) Nzambe nde aponaki Yesu azala Masiya​—mokumba moko monene mpenza. (Misala 2:36) Kasi, Nzambe atyaki Yesu mafuta ya solosolo te kasi nde mafuta na elimo.​—Matai 3:16.

 Bisakweli etali Masiya ekoki kokokisama epai ya bato mingi?

 Te. Kaka ndenge bilembo ya misapi ya moto moko ekoki te kokokana ná oyo ya moto mosusu, bisakweli ya Biblia mpe ezali kokokisama kaka epai ya Masiya moko to Kristo. Kasi, Biblia ekebisi ete “Ba-Kristo ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima mpe bakobimisa bilembo minene mpe bakosala makamwisi mpo na kokosa ata bato oyo baponami, soki likoki ezali.”​—Matai 24:24.

 Masiya akoki komonana na mikolo ekoya?

 Te. Biblia esakolaki ete Masiya akozala moto ya libota ya Mokonzi Davidi ya Yisraele. (Nzembo 89:3, 4) Kasi, mikanda ya molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Bayuda tii na Davidi ebungaki, ekoki kozala Baroma babebisaki yango ntango babɔtɔlaki Yerusaleme na mobu 70 ya ntango na biso. a Banda ntango wana, ekómá mpasi moto moko aloba ete azali moto ya libota ya Davidi. Nzokande na ntango ya Yesu, mikanda yango ezalaki, ata kutu banguna na ye batyaki ntembe te ete azalaki moto ya libota ya Davidi.​—Matai 22:41-46.

 Bisakweli boni etali Masiya ezali na Biblia?

 Ezali mpasi kopesa motángo mobimba ya bisakweli oyo etali Masiya. Na ndakisa, mayele ya kotánga bisakweli ekoki kokesana ata na bavɛrsɛ oyo emonani polele ete ezali bisakweli. Mokanda ya Yisaya 53:2-7 elobeli bisakweli ndenge na ndenge oyo etali Masiya. Bamosusu bakoki kotánga yango lokola esakweli kaka moko, kasi bamosusu bakoki komona ete likambo mokomoko oyo elobami na bavɛrsɛ yango ezali esakweli.

 Mwa bisakweli etali Masiya oyo ekokisamaki epai ya Yesu

Esakweli

Ezali na

Kokokisama

Momboto ya Abrahama

Ebandeli 22:17, 18

Matai 1:1

Mokitani ya Yisaka mwana ya Abrahama

Ebandeli 17:19

Matai 1:2

Abotami na libota ya Yuda

Ebandeli 49:10

Matai 1:1, 3

Na molɔngɔ ya libota ya Mokonzi Davidi

Yisaya 9:7

Matai 1:1

Abotami epai ya mwasi oyo ayebi mibali te

Yisaya 7:14

Matai 1:18, 22, 23

Abotami na Beteleme

Mika 5:2

Matai 2:1, 5, 6

Abengami na nkombo Emanuele b

Yisaya 7:14

Matai 1:21-23

Ebandeli ya moke

Yisaya 53:2

Luka 2:7

Bana mike babomami nsima ya kobotama na ye

Yirimia 31:15

Matai 2:16-18

Babengi ye alongwa na Ezipito

Hosea 11:1

Matai 2:13-15

Babengi ye Monazarete c

Yisaya 11:1

Matai 2:23

Momemi-nsango ayei liboso na ye

Malaki 3:1

Matai 11:7-10

Atyami mafuta lokola Masiya na mobu 29 T.B. d

Danyele 9:25

Matai 3:13-17

Nzambe andimi ete azali Mwana na ye

Nzembo 2:7

Misala 13:33, 34

Molende mpo na ndako ya Nzambe

Nzembo 69:9

Yoane 2:13-17

Mosakoli ya nsango malamu

Yisaya 61:1

Luka 4:16-21

Pole moko monene na mosala na ye na Galile

Yisaya 9:1, 2

Matai 4:13-16

Mosali makamwisi lokola Moize

Kolimbola Mibeko 18:15

Misala 2:22

Ndenge moko na Moize, akoloba makanisi ya Nzambe

Kolimbola Mibeko 18:18, 19

Yoane 12:49

Abikisi bato mingi ya maladi

Yisaya 53:4

Matai 8:16, 17

Abendi likebi ya bato epai na ye te

Yisaya 42:2

Matai 12:17, 19

Ayokeli baoyo bazali konyokwama mawa

Yisaya 42:3

Matai 12:9-20; Marko 6:34

Amonisi bosembo ya Nzambe

Yisaya 42:1, 4

Matai 12:17-20

Mopesi-toli monene

Yisaya 9:6, 7

Yoane 6:68

Asakoli nkombo ya Yehova

Nzembo 22:22

Yoane 17:6

Alobi na masese

Nzembo 78:2

Matai 13:34, 35

Mokambi

Danyele 9:25

Matai 23:10

Mingi bandimeli ye te

Yisaya 53:1

Yoane 12:37, 38

Libanga ya kobɛta libaku

Yisaya 8:14, 15

Matai 21:42-44

Bato baboyi ye

Nzembo 118:22, 23

Misala 4:10, 11

Bayini ye kaka mpamba

Nzembo 69:4

Yoane 15:24, 25

Akɔti na Yerusaleme lokola mokonzi likoló ya mpunda

Zekaria 9:9

Matai 21:4-9

Bana bakumisi ye

Nzembo 8:2

Matai 21:15, 16

Ayei na nkombo ya Yehova

Nzembo 118:26

Yoane 12:12, 13

Moninga ya motema atɛki ye

Nzembo 41:9

Yoane 13:18

Batɛki ye na shekele ya palata 30  e

Zekaria 11:12, 13

Matai 26:14-16; 27:3-10

Baninga basundoli ye

Zekaria 13:7

Matai 26:31, 56

Batatoli ya lokuta bakoseli ye makambo

Nzembo 35:11

Matai 26:59-61

Afandi nyɛɛ liboso ya bafundi na ye

Yisaya 53:7

Matai 27:12-14

Babwakeli ye nsoi

Yisaya 50:6

Matai 26:67; 27:27, 30

Babɛti ye na motó

Mika 5:1

Marko 15:19

Babɛti ye

Yisaya 50:6

Yoane 19:1

Asalaki baoyo babɛtaki ye eloko te

Yisaya 50:6

Yoane 18:22, 23

Bakonzi ya guvɛrnema batɛmɛlaki ye

Nzembo 2:2

Luka 23:10-12

Babɛti ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo

Nzembo 22:16

Matai 27:35; Yoane 20:25

Bato babwakeli bilamba na ye mbɛsɛ

Nzembo 22:18

Yoane 19:23, 24

Atángami elongo na basumuki

Yisaya 53:12

Matai 27:38

Atyolami, afingami

Nzembo 22:7, 8

Matai 27:39-43

Anyokwamaki mpo na basumuki

Yisaya 53:5, 6

1 Petro 2:23-25

Lokola nde Nzambe abosanaki ye

Nzembo 22:1

Marko 15:34

Bapesi vinyo mpe mai ya nsɔngi amɛla

Nzembo 69:21

Matai 27:34

Ayoki mposa ya mai liboso akufa

Nzembo 22:15

Yoane 19:28, 29

Atikaki elimo na ye na mabɔkɔ ya Nzambe

Nzembo 31:5

Luka 23:46

Akataki mpema

Yisaya 53:12

Marko 15:37

Apesi lisiko mpo na kolongola lisumu

Yisaya 53:12

Matai 20:28

Mikuwa na ye ebukani te

Nzembo 34:20

Yoane 19:31-33, 36

Batɔbɔli ye

Zekaria 12:10

Yoane 19:33-35, 37

Akundami elongo na bazwi

Yisaya 53:9

Matai 27:57-60

Asekwisami uta na bakufi

Nzembo 16:10

Misala 2:29-31

Moto mosusu azwi esika ya motɛki na ye

Nzembo 109:8

Misala 1:15-20

Afandi na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe

Nzembo 110:1

Misala 2:34-36

a Buku moko (McClintock and Strong’s Cyclopedia) elobi: “Ntembe ezali te, mikanda ya molɔngɔ ya mabota ya Bayuda ebebaki ntango Yerusaleme ebebisamaki, kasi te liboso na yango.”

b Nkombo ya Ebre Emanuele, oyo elimboli “Nzambe azali na biso,” emonisi malamu mokumba ya Yesu lokola Masiya. Koya na ye awa na mabele mpe misala na ye emonisaki ete Nzambe azali elongo na basambeli na ye.​—Luka 2:27-32; 7:12-16.

c Ekoki kozala ete ebengeli “Monazarete” euti na liloba ya Ebre neʹtser, oyo elimboli “mwa nzete ya sika.”

d Mpo na koyeba makambo mosusu etali masolo ya Biblia oyo emonisi ete dati ya mobu 29 T.B. nde kati oyo Masiya ayaki, talá lisolo “Ndenge oyo esakweli ya Danyele eyebisi koya ya Masiya.”

e Esakweli yango ezali na mokanda ya Zekaria, kasi mokomi ya mokanda ya Matai alobi ete “elobamaki na nzela ya mosakoli Yirimia.” (Matai 27:9) Emonani ete mokanda ya Yirimia etyamaki na esika ya liboso na eteni ya Makomami oyo ebengamaki “Basakoli.” (Luka 24:44) Emonani ete Matai asalelaki “Yirimia” mpo na kolobela eteni mobimba ya mikanda yango, oyo ezalaki mpe na mokanda ya Zekaria na kati na yango.