Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lisekwa ezali nini?

Lisekwa ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Na Biblia, liloba oyo ebongolami na “lisekwa” euti na liloba ya Grɛki anastasis oyo elimboli “kolamuka” to “kotɛlɛma lisusu.” Kosekwa elimboli kolamuka na liwa mpe kozonga na bomoi ndenge ozalaki liboso.​—1 Bakorinti 15:12, 13.

 Makomami ya Ebre (to Kondimana ya Kala) etángi liloba “lisekwa” te, kasi elobeli liteya yango. Na ndakisa, Nzambe alakaki na nzela ya mosakoli Hosea ete: “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Nkunda; nakobikisa bango na liwa.”​—Hosea 13:14; Yobo 14:13-15; Yisaya 26:19; Danyele 12:2, 13.

 Bato oyo bakosekwa bakofanda wapi? Bato mosusu bakosekwa mpo na kozwa bomoi na likoló epai bakoyangela elongo na Kristo. (2 Bakorinti 5:1; Emoniseli 5:9, 10) Biblia ebengi yango “lisekwa ya liboso”; yango emonisi ete lisekwa mosusu ezali. (Emoniseli 20:6; Bafilipi 3:11) Lisekwa yango ekozala lisekwa mpo na bomoi awa na mabele; yango nde bato mingi bazali kozela.​—Nzembo 37:29.

 Ndenge nini bato bakosekwa? Nzambe apesi Yesu nguya ya kolamwisa bakufi. (Yoane 11:25) Yesu akozongisa na bomoi “baoyo nyonso bazali na kati ya malita,” moto na moto ndenge azalaki, ná bizaleli na ye mpe makanisi na ye. (Yoane 5:28, 29) Baoyo bakosekwa mpo na bomoi na likoló bakozwa nzoto ya elimo; baoyo bakosekwa mpo na kofanda na mabele bakozala na nzoto ya mosuni, oyo ekoká na nyonso.​—Yisaya 33:24; 35:5, 6; 1 Bakorinti 15:42-44, 50.

 Banani bakosekwa? Biblia elobi ete “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Bayengebene ezali bato ya sembo lokola Noa, Sara, mpe Abrahama. (Ebandeli 6:9; Baebre 11:11; Yakobo 2:21) Baoyo bazangi boyengebene ezali bato oyo batosaki mibeko ya Nzambe te mpo bazwaki te libaku ya koyekola yango mpe kotosa yango.

 Kasi, baoyo bakómaka mpenza bato mabe mpe bakoki kobonga lisusu te bakosekwa te. Soki bato ya ndenge wana bakufi, bakufaka liwa ya seko, bazalaka na elikya ya kozonga na bomoi te.​—Matai 23:33; Baebre 10:26, 27.

 Ntango nini lisekwa ekosalema? Biblia elobaki ete lisekwa mpo na bomoi na likoló ekosalema na eleko ya kozala ya Kristo, oyo ebandaki na 1914. (1 Bakorinti 15:21-23) Lisekwa mpo na bomoi awa na mabele ekosalema na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Kristo, ntango mabele ekobongwana paradiso.​—Luka 23:43; Emoniseli 20:6, 12, 13.

 Mpo na nini ebongi ondima ete lisekwa ekosalema? Biblia elobeli masolo ya bato libwa oyo basekwaki, mpe bato bazalaki wana ntango bato yango basekwaki. (1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:32-37; 13:20, 21; Luka 7:11-17; 8:40-56; Yoane 11:38-44; Misala 9:36-42; 20:7-12; 1 Bakorinti 15:3-6) Lisekwa ya Lazare ezalaki likambo monene, mpo Yesu asekwisaki ye ntango bakundaki ye esilaki koleka mikolo minei, mpe bato ebele bazalaki wana. (Yoane 11:39, 42) Ata banguna ya Yesu bakokaki kowangana likambo yango te, yango wana basalaki likita mpo na koboma Yesu ná Lazare.​—Yoane 11:47, 53; 12:9-11.

 Biblia emonisi ete Nzambe azali na likoki mpe mposa ya kozongisa bakufi na bomoi. Abateli na makanisi na ye makambo nyonso oyo etali moto mokomoko oyo akosekwisa na nguya na ye oyo eleki nyonso. (Yobo 37:23; Matai 10:30; Luka 20:37, 38) Nzambe akoki kozongisa bakufi na bomoi, mpe alingi kosala yango! Mpo na lisekwa oyo ezali koya, Biblia elobi mpo na Nzambe ete: “Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.”​—Yobo 14:15.

Makambo oyo bato bakanisaka mpo na lisekwa

 Makanisi ya bato: Lisekwa elimboli kozongisa molimo na kati ya nzoto.

 Likambo ya solo: Biblia eteyaka ete molimo ezali moto mobimba, kasi te eloko moko oyo etikalaka na bomoi nsima ya liwa. (Ebandeli 2:7; Ezekiele 18:4) Moto oyo asekwi azongi na kati ya molimo te; azongi nde molimo, to moto ya bomoi.

 Makanisi ya bato: Bato mosusu oyo bakosekwa, bakobomama mbala moko.

 Likambo ya solo: Biblia elobi ete “baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe” bakozwa “lisekwa ya kosambisama.” (Yoane 5:29) Kasi, bato yango bakosambisama na kolanda makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa, kasi te oyo basalaki liboso bákufa. Yesu alobaki ete: “Bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana ya Nzambe mpe baoyo batye likebi, bakozala na bomoi.” (Yoane 5:25) Baoyo ‘bakoyoka,’ to bakotosa makambo oyo bakoyekola nsima ya lisekwa, bankombo na bango ekokomama na “rulo ya bomoi.”​—Emoniseli 20:12, 13.

 Makanisi ya bato: Soki moto asekwi, akozala kaka na nzoto oyo azalaki na yango liboso akufa.

 Likambo ya solo: Nsima ya liwa, nzoto ya moto ebebaka mpe epɔlaka.​—Mosakoli 3:19, 20.