Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kotomboka nde ebongisaka makambo?

Kotomboka nde ebongisaka makambo?

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo bakɔtaka na makambo ya politiki te. (Yoane 17:16; 18:36) Na yango, atako masolo oyo elandi elobeli bandakisa ya sikisiki oyo etali mobulu ya bana-mboka, ekɔteli ata ekólo moko te mpe epesi ata ebongiseli moko te ya politiki mabɔkɔ.

NA MOKOLO ya 17/12/2010 motema molai ya Mohamed Bouazizi ekómaki na nsuka. Azalaki na mbula 26 mpe azalaki kotɛka biloko na balabala moko na ekólo Tunisie mpo azalaki na likoki te ya kozwa mosala ya malamu. Ayebaki mpe ezaleli mabe ya bakonzi oyo bazalaki kosɛnga kanyaka. Mokolo yango na ntɔngɔ, bakonzi ya polisi babɔtɔlaki bambuma oyo azalaki kotɛka, poires, bitabe mpe bapɔmɛ. Ntango balingaki kozwa emekeli-kilo na ye, aboyaki; mpe bato mosusu oyo bamonaki likambo yango balobi ete mokonzi mwasi moko ya polisi abɛtaki ye mbata.

Lokola bayokisaki ye nsɔni mpe asilikaki makasi, Mohamed akendaki kofunda likambo yango na biro moko ya Leta oyo ezalaki pembeni, kasi baboyaki koyoka ye. Balobi ete agangaki liboso ya biro yango mpe alobaki, “nakokokisa bamposa ya libota na ngai ndenge nini?” Nsima ya komisopela esansi, amitumbaki. Nsima ya pɔsɔ misato, bampota ya mɔtɔ yango ebomaki ye.

Likambo oyo Mohamed Bouazizi asalaki, esalaki ete bato ya Tunisie mpe ya bikólo mosusu bátomboka. Bato mingi bamonaka ete likambo yango nde epelisaki mɔtɔ oyo ekweisaki guvɛrnema ya ekólo yango mpe eumelaki te botomboki yango epalanganaki na bikólo oyo elobaka monɔkɔ ya Arabe. Na 2011, Parlema ya Mpoto epesaki mpe bato mosusu minei mbano babengi Prix Sakharov ya bonsomi ya makanisi, mpe mpo na zulunalo moko ya Londres (The Times) Bouazizi azali moto oyo alobelamaki mingi na mobu 2011.

Ndenge ndakisa oyo emonisi yango, kotomboka ekoki kosala makambo minene. Kasi, mpo na nini bato bakómi kotomboka mingi mikolo oyo? Ndenge mosusu ya kosala ezali te?

Mpo na nini bato bakómi kotomboka mingi boye?

Makambo oyo elandi nde etindaka bato mingi bátomboka:

  • Kozanga kosepela na ndenge guvɛrnema ezali kotambwisa makambo. Soki bato bamoni ete guvɛrnema ya mboka mpe nkita ezali kokokisa bamposa na bango, ezalaka mpasi mpo bátomboka; bato batyaka elikya na guvɛrnema mpo ebongisa makambo na bango. Kasi soki bamoni ete guvɛrnema yango ezali mabe, sembo te mpe ezali kosala kaka mpo na matomba ya mwa bato moke, bato baumelaka te na kotomboka.

  • Likambo moko ya mabe. Mbala mingi, soki likambo moko ya mabe esalemi, etindaka bato bátomboka, bámona ete basengeli kokanga mabɔkɔ te. Na ndakisa, likambo ya Mohamed Bouazizi etindaki bato mingi ya Tunisie bátomboka. Na Inde, Anna Hazare, moto moko oyo abundelaka ntomo ya bato aboyaki kolya mpo na kotɛmɛla kanyaka; yango etindaki baoyo bazalaki kopesa ye mabɔkɔ bátomboka na bingumba 450.

Ndenge Biblia emonisá yango banda kala, tofandi na mokili oyo “moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Kanyaka mpe kozanga bosembo ezali se kopalangana lelo oyo koleka ndenge ezalaki liboso. Longola yango, lelo oyo bato bayebi lisusu malamu ndenge makambo ya politiki mpe ya nkita elongi te kokokisa bamposa na bango. Batelefone, Internet, mpe bansango oyo epesamaka butu moi esalaka ete ata likambo oyo esalemi na esika moko ya mosika etinda bato na bisika ndenge na ndenge bátomboka.

Kotomboka ebimisá matomba nini?

Baoyo babimisaka mobulu mpo na kobundela ntomo ya bato bakoki koloba ete kotomboka ebimisá matomba oyo elandi:

  • Esalá ete babola bazwa lisalisi. Mobulu oyo bato oyo babenganaki bango na bandako ya kofutela na engumba Chicago, Illinois, na États-Unis babimisaki ntango nkita ekweaki na bambula ya 1930, esalaki ete bakonzi ya engumba yango bápekisa likambo yango mpe bázwa bibongiseli mpo bato mosusu oyo batombokaki bázwa misala. Mobulu ya ndenge wana oyo esalemaki mpe na engumba New York esalaki ete bázongisa mabota 77 000 na bandako oyo babenganaki bango.

  • Esalá ete bosembo esalema. Ndenge oyo bapekisaki babisi ya kompanyi moko etambola na engumba Montgomery, Alabama na États-Unis kobanda mobu 1955 tii 1956, esalaki ete babongola mibeko oyo etalaki likambo ya kopona loposo na bisika ya kofanda na babisi.

  • Esalá ete misala ya kotonga esuka na nzela. Na sanza ya 12/2011, ebele ya bato batombokaki mpo na kotɛmɛla mosala ya kotonga esika oyo balingaki kobimisa kura (Centrales thermiques au charbon) pene ya engumba Hong Kong, mpo bato bazalaki kobanga ete ebebisa mopepe; yango wana mosala yango esukaki na nzela.

Atako batomboki mosusu bakoki kokokisa mikano na bango, Bokonzi ya Nzambe epesi elikya ya malamu koleka

Na ntembe te, bato oyo batombokaka bázwaka ntango nyonso te eloko balingi. Na ndakisa, bakonzi bakoki kopesa bato etumbu mpo na mobulu oyo babimisi na esika ya kokokisa bosenga na bango. Kala mingi te, prezida ya ekólo moko ya Moyen-Orient alobaki boye mpo na etuluku moko ya batomboki: “Tosengeli kozwela bango bikateli ya makasi mpenza,” mpe ebele ya bato bakufaki na mobulu yango.

Ata soki batomboki bakokisi mikano na bango, mbala mingi yango ebimisaka mpe mikakatano mosusu na nsima. Mobali moko oyo apesaki mabɔkɔ mpo na kolongola mokonzi ya ekólo moko ya Afrika na bokonzi, ayebisaki zulunalo Time mpo na guvɛrnema ya sika ete: “Tokanisaki ete makambo ekobonga mpenza, kasi na mbala moko ebebaki lisusu koleka.”

Nini mpenza ekobongisa makambo?

Bato mingi oyo bayebaná bamonaka ete kotombokela baguvɛrnema oyo enyokolaka bato ezali likambo oyo bato basengeli kosala. Na ndakisa, na 1985, Václav Havel, prezida ya kala ya ekólo Tchèque oyo alekisaki bambula mingi na bolɔkɔ mpo na likambo ya kobundela ntomo ya bato akomaki boye: “Soki eloko mosusu ya kosala ezali te [motomboki] akoki kopesa ata bomoi na ye kaka mpo na kolongisa likambo oyo azali kobundela.”

Maloba ya Havel emonisi ntina oyo Mohamed Bouazizi mpe bato mosusu bamibomaka mpo na kozanga elikya. Na mikolo oyo euti koleka, ebele ya bato bamitumbaki na ekólo moko ya Azia mpo na kotɛmɛla monyokoli ya lingomba mpe ya politiki. Mpo na komonisa ntina oyo bato yango basalaki bongo, moto moko ayebisaki zulunalo Newsweek boye: “Tozali na mindoki te. Tozali mpe na mposa ya koboma bato te. Sikoyo tósala nini?”

Biblia emonisi ndenge kozanga bosembo, kanyaka mpe minyoko ekosila. Elobeli guvɛrnema oyo Nzambe atyé na likoló, oyo ekozwa esika ya bibongiseli ya politiki mpe ya nkita ya mabe oyo etindaka bato bátomboka. Esakweli moko oyo etali Mokonzi ya guvɛrnema yango elobi boye: “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu.”​—Nzembo 72:12, 14.

Batatoli ya Yehova bandimaka ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekotya kimya na mokili. (Matai 6:9, 10) Yango wana, Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka te na botomboki. Kasi, likanisi oyo ete guvɛrnema ya Nzambe ekolongola makambo oyo etindaka bato bátomboka ezali kaka ndɔtɔ mpamba? Ekoki komonana bongo. Kasi, bato mingi bakómá kotyela boyangeli ya Nzambe motema. Mpo na nini te yo moko otalela likambo yango?