Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Nini esalaka ete ndɛkɛ babengi albatros hurleur ebimisa makasi mingi te ntango ezali kopumbwa?

Nini esalaka ete ndɛkɛ babengi albatros hurleur ebimisa makasi mingi te ntango ezali kopumbwa?

BANDƐKƐ mosusu ekoki kotika mapapu na yango ya kosembwama na likoló kozanga ete ebimisa makasi mingi. Ndɛkɛ babengi albatros hurleur esalaka bongo na ndenge ya kokamwa mpenza. Atako ezalaka na kilo soki mwambe na ndambo mpe molai ya mapapu na yango mɛtrɛ misato na ndambo, ndɛkɛ yango ekoki kopumbwa bakilomɛtrɛ ebele kozanga ete ebimisa makasi mingi! Sekele na yango ezalaka na nzoto na yango mpe mayele oyo esalelaka mpo na kopumbwa.

Tókanisa naino: Ntango ezali kopumbwa, ndɛkɛ yango esalelaka misisa oyo esalaka ete mapapu na yango etikala ya kosembwama mpenza; yango esalaka ete misuni esala mosala te. Soki ndɛkɛ yango epumbwaka ngonga mingi, sekele mosusu ezali na mayele oyo esalelaka mpo na kolonga mipɛpɛ ya mbu.

Soki ekómi esika oyo mbu ezali, ndɛkɛ yango emataka, ebalukaka, mpe ekitaka kozanga kotika; kosala bongo esalaka ete ndɛkɛ yango ezwa makasi mingi koleka oyo esalelaki ntango ezalaki komata. Bato ya siansi bauti koyeba mayele oyo ndɛkɛ yango esalelaka kala mingi te. Nsima ya kosalela baaparɛyi ya solosolo mpenza mpe baprograme ya ordinatɛrɛ oyo ebongi, bamonaki ete ntango ndɛkɛ yango emati likoló, ezwaka makasi oyo esengeli ntango ekómi na nsuka liboso ete ebaluka mpo na kokita nzela moko na mopɛpɛ. Bato ya siansi balobi ete “ndɛkɛ yango ezwaka makasi yango na pɛtɛɛ nyonso mpe kozanga kotika.” Yango esalaka ete ndɛkɛ yango epumbwa ntango molai kozanga ete ebɛtabɛta mapapu na yango!

Mayele yango ekoki kosalisa ba-ingénieur básala baaviɔ oyo ekosalela kérosène mingi te, mpe mbala mosusu ekoki kosala kutu ete mpɛpɔ emata kozanga ete motɛrɛ etindika yango.

Okanisi nini? Ndenge oyo ndɛkɛ babengi albatros ebimisaka makasi mingi te ntango ezali kopumbwa, mpe ndenge oyo nzoto na yango ebongisamá ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?