Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

États-Unis

Mokolo na mokolo, bato koleka 20 oyo kala bazalaki basoda ya États-Unis bamibomaka. Sanza nyonso, basoda ya kala soki 950 oyo bazwaka lisungi na Departema oyo etalelaka makambo ya basoda ya kala na États-Unis, balukaka komiboma.

Chine

Zulunalo moko (China Daily) elobi boye: “Basi ya Chine oyo bakokisi naino mbula 30 te, oyo balongwaka na bamboka na bango mpo na kokende koluka misala na bingumba mosusu ya Chine, mingi na bango (1/2) bazwaka zemi liboso ya kobala, motángo yango emati mpenza makasi soki tokokanisi yango na motángo ya baoyo babotá kozanga kobala kaka na mwa bambula oyo euti koleka. Emonani ete Ba-Chinois bakómi sikoyo kondima . . . mabala ya yaka tófanda.”

Grèce

Maladi ya malaria, oyo esilaki na Grèce na 1974, ezongi lisusu. Balobi ete maladi yango ezongi mpo nkita ebebi mpe leta ezali lisusu kobimisa mbongo mingi te mpo na balopitalo na yango.

Inde

Ankɛtɛ moko emonisaki ete atako bato bakómi kolanda mimeseno ya bato ya Mpoto mpe ya Amerika ya nɔrdi; bato mingi (74%) oyo batunaki bango mituna basepelaka kaka na mabala oyo baboti babongisaka mpo na bana na bango koleka mabala oyo mwasi ná mobali “balingani na ndenge na bango.” Bato mingi (89%) mpe basepelaka kofanda esika moko na bandeko na bango mosusu, na esika báfanda kaka tata, mama mpe bana.

Italie

“Lingomba ya [Katolike] ezali lisusu makasi te, ezala na Mpoto to na Amerika. Mimeseno na biso ekómi ya kala, ba eglize na biso ezali minene, bakuva etikali mpamba, lingomba ezali lisusu kotambwisama malamu te, milulu mpe bazambala na biso ezalaka kaka mpo na komilakisa. . . . Lingomba ezali na retare ya mbula 200.”​—Maloba ya Carlo Maria Martini kardinale ya Lingomba ya Katolike, oyo zulunalo Corriere della Sera ebimisaki nsima ya liwa na ye.