Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia esakolaki makambo oyo bato bazali kokanisa mpe kosala lelo oyo?

Biblia esakolaki makambo oyo bato bazali kokanisa mpe kosala lelo oyo?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ, Biblia esakolaki ete bato mingi bakokóma lisusu kokanisa mabe mpe kosala mabe na mikolo na biso. Emonisaki ete bato mingi bakokóma lisusu na bizaleli oyo ebukaka mibeko ya Nzambe mpe bizaleli yango ekosala ete bázala na boyokani te na bato mosusu. a (2 Timote 3:1-5) Kasi, Biblia esakolaki mpe ete bato mosusu bakoboya kozala na bizaleli ya mabe. Kutu, na lisalisi ya Nzambe, bakosala makasi mpo na kolongola makanisi ya mabe mpe bakoyekola ndenge ya kokanisa mpe ya kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe.​—Yisaya 2:2, 3.

Na lisolo oyo tokoyanola na mituna oyo

 Biblia esakolaki nini mpo na makanisi ya bato mpe makambo oyo bakosala na mikolo na biso?

 Biblia emonisi bizaleli mpe makambo ya mabe ndenge na ndenge oyo bato bakosala, nyonso wana kaka mpo na ezaleli ya moimi. Bato bakozala bato “oyo bazangi komipekisa,” “bato oyo bamilingaka,” mpe bato “oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe.”​—2 Timote 3:2-4.

 Mpo na komonisa bosolo ya esakweli yango, bato mingi na mikolo na biso bazali kokanisa kaka mpo na bango moko, koluka matomba na bango moko, mpe bazali komisalela makambo ya malamu, makambo oyo ekosala ete bámiyoka malamu mpe bámona ete bomoi na bango ezali na ntina mingi mpe bongo na bongo. Ndenge esakolamaki, bato mingi lelo oyo bazali kaka koluka matomba na bango moko mpe yango esali ete makambo ebeba se kobeba. Bato mingi bazali komipesa mingi mpo na koluka kaka matomba na bango moko oyo esali ete bázala “bato oyo balingaka makambo ya malamu te,” mpe bamonaka ete esengeli te bámonisa botɔndi mpo na biloko oyo bazali na yango to mpo na makambo oyo basusu bazali kosalela bango.​—2 Timote 3:2, 3.

 Ezaleli ya moimi ezali mpe kobota bizaleli mosusu ya mabe oyo Biblia esakolaki oyo ezali komonana na mikolo na biso:

  •   Lokoso. Bato mingi bazali “bato oyo balingá mbongo” mpe bakanisaka ete mbongo na bango mpe biloko na bango ya kobikela nde emonisaka ete balongi na bomoi.​—2 Timote 3:2.

  •   Lolendo. Bato mingi bazali “bato ya lofundo, bato ya lolendo,” mpe bato “oyo bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:2, 4) Bato ya ndenge wana bamikumisaka mpo na makoki na bango, bizaleli na bango to bozwi na bango.

  •   Kokosela basusu makambo. “Bato oyo bafingaka” mpe bato “oyo bakoselaka bato makambo” bakoki kozala bisika nyonso. (2 Timote 3:2, 3) Bato oyo bazali kolobela awa ekoki kozala bato oyo bafingaka bato mosusu to Nzambe to balobaka lokuta mpo na basusu.

  •   Motó makasi. Bato mingi bazali “bato oyo bazangi bosembo,” “oyo balingaka kosala boyokani te,” “oyo batɛkaka bamosusu,” mpe “bato ya motó makasi.” (2 Timote 3:2-4) Bato yango bamonisaka bizaleli oyo emonisi ete balingaka kosala boyokani te mpo na kosilisa matata to mpo na kokokisa makambo oyo bango moko balakaki kosala.

  •   Mobulu. Bato mingi lelo oyo bazali “bato ya nko,” bato oyo basilikaka mpambampamba, oyo mbala mingi basalaka mobulu to basalaka makambo lokola banyama.​—2 Timote 3:3.

  •   Kobuka mibeko. Yesu asakolaki ete “makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi” na mikolo na biso. (Matai 24:12) Asakolaki mpe ete “makambo ya mobulu” ekokóma mingi, to “ekobakisama.”​—Luka 21:9.

  •   Kozanga kolingana na kati ya libota. Lokola bato mingi bakómi bato “oyo batosaka baboti te” mpe bato “oyo balinganaka te na kati ya libota,” bato mingi na kati ya libota bamimonaka ete basundolami, basalelaka bango makambo ya mabe to konyokola bango.​—2 Timote 3:2, 3.

  •   Bokosi ya bato ya mangomba. Bato mingi balobaka ete bazali na “ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Timote 3:5) Na esika básala mokano ya Nzambe, batosaka bakonzi ya mangomba oyo bayebisaka bango makambo oyo basepelaka koyoka.​—2 Timote 4:3, 4.

 Bato oyo balukaka matomba na bango moko bakoki kotinda basusu básala nini?

 Lokola bato mingi bazali bato ya moimi, bato mingi koleka bazali konyokwama mingi na makanisi mpe komona mpasi mpo na mikakatano koleka ndenge ezalaki liboso. (Mosakoli 7:7) Na ndakisa, bato mosusu oyo bazali bato oyo balingaka mbongo bayibaka basusu to babubaka basusu. Bato oyo balinganaka te na kati ya libota bakoki kosalela bato mosusu na libota na bango makambo kozanga boboto, yango ekoki kosala ete bato mosusu ya libota bányokwama na makanisi to báluka komiboma. Mpe bato oyo batɛkaka basusu to bato oyo bazangi bosembo banyokolaka basusu na makanisi mpe mpasi oyo batikelaka bato yango ekoki koumela mikolo mingi.

 Mpo na nini bato mingi bazali lisusu kokóma mabe koleka?

 Biblia emonisi polele ntina oyo bato bakokóma lisusu mabe koleka:

  •   Bolingo oyo bato balingaka Nzambe mpe bazalani na bango ekokita. (Matai 24:12) Yango wana, ezaleli ya moimi ezali se kokóma mingi.

  •   Bakangaki Satana Zabolo uta na likoló mpe babwakaki ye zingazinga ya mabele. (Emoniseli 12:9, 12) Banda wana, azali kotinda bato bákóma lisusu bato ya moimi koleka.​—1 Yoane 5:19.

 Tosengeli kosala nini ndenge tozali komona bato bazali se kokoba kosala mabe?

 Liloba ya Nzambe elobi: “Yo kimá bato wana.” (2 Timote 3:5) Yango elingi koloba te ete tosengeli kokende mosika na bato mosusu. Kasi, tosengeli koboya kosala boninga ya penepene elongo na bato oyo balukaka matomba na bango moko mpe bazali na bomoi oyo ezali kobuka mibeko ya Nzambe.​—Yakobo 4:4.

 Moto nyonso akokóma mabe?

 Te. Biblia esakolaki ete bato mosusu ‘bakokimela mpe bakolelalela mpo na makambo nyonso oyo eyinamá oyo ezali kosalema.’ (Ezekiele 9:4) Bakoboya ezaleli ya moimi mpe bakotambwisa bomoi na bango na boyokani na mibeko ya Nzambe. Maloba na bango mpe misala na bango ekokesana mpenza na oyo ya bato mingi. (Malaki 3:16, 18) Na ndakisa, bakoluka kozala na kimya elongo na bato nyonso mpe bakoboya bitumba mpe mobulu.​—Mika 4:3.

 Bato bakokoba kosala mabe mpe bomoi ekotonda kaka na mobulu mpe na mabe?

 Te. Bato bakokoba te kaka kosala mabe to mobulu. Kutu, mosika te Nzambe akolongola bato oyo bakanaka kobuka mibeko na ye. (Nzembo 37:38) Akozongisa “mabele ya sika,” elingi koloba, bato ya sika oyo bakofanda awa na mabele, epai bato ya komikitisa nde bakozala na kimya libela na libela. (2 Petro 3:13; Nzembo 37:11, 29) Elikya oyo ezali ndɔtɔ ya baba te. Ata lelo oyo, Biblia ezali kosalisa bato bábongola bomoi na bango mpo báyokanisa yango na mibeko ya Nzambe.​—Baefese 4:23, 24.

a Esakweli ya Biblia mpe makambo oyo ezali kosalema lelo oyo, emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka” oyo esengeli kozala “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Elembo ya ‘mikolo ya nsuka,’ to ‘ntango ya suka’ ezali nini?