Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nazalaki komona makambo ya kozanga bosembo bisika nyonso

Nazalaki komona makambo ya kozanga bosembo bisika nyonso

NABOTAMAKI na 1965, na libota moko ya bobola na Irlande du Nord. Nakolaki na Comté de Derry na ntango oyo “matata” ezalaki kati na Bakatolike ná Baprotesta; oyo eumelaki mbula koleka 30. Bakatolike oyo bazalaki moke, bazalaki komona ete Baprotesta oyo bazalaki mingi, bazalaki koyina bango, kosalela bango makambo na bosembo te na voti, na ndenge ya kotambwisa makambo, na misala mpe na makambo etali ndako.

Nazalaki komona makambo ya kozanga bosembo bisika nyonso. Nayebaka lisusu te mbala boni babɛtá ngai, babwaká ngai libanda ya motuka, balakisá ngai mondoki, basambisá to baluká ngai na bapolisi to basoda. Namonaki ete bazali konyokola ngai, yango wana nazalaki kokanisa boye: ‘Natika kaka banyokola ngai boye, to nasala mwa eloko?’

Nasanganaki na bato oyo batambolaki na babalabala mokolo moko ya lomingo na 1972 mpo na kokanisa bato 14 oyo basoda ya Angleterre babomaki na masasi; natambolaki mpe na bato oyo baboyaki kolya na nko mpe babimaki na balabala mpo na kokanisa bakangami oyo bakufaki mpo baboyaki kolya na 1981. Natɛlɛmisaki badrapo oyo epekisamaki mpe nakomaki makambo ya mabe mpo na Angleterre na bisika nyonso ya polele oyo nakokaki kokoma. Emonani lokola ete ntango nyonso oyo bato bazalaki kotomboka, ezalaki mpo likambo moko ya mabe esalemi to mpo babomi mondimi moko ya lingomba ya Katolike. Ezalaki kobanda kaka na kotambola ya mpamba kasi na nsima mobulu makasi ezalaki kosalema.

Ntango nakɔtaki iniversite, nasanganaki mpe na baninga ya kelasi oyo bazalaki kotomboka ndenge bato bazali kobebisa mai, mopɛpɛ mpe zamba. Na nsima, nakendaki na Londres mpe kuna, nasanganaki na bato ya parti ya socialiste oyo bazalaki kotambola mpo na kotɛmɛla guvɛrnema; mpo ezalaki konyokola babola mpo na bolamu ya bato ya lokumu. Nasanganaki mpe na bato oyo baboyaki kosala mosala mpo bakitisaki lifuti na bango; mpe na 1990, natambolaki mpe elongo na bato oyo bazalaki kotomboka mpo Leta esɛngaki moto nyonso oyo akokisi mbula ya kosala voti, ata mobola, afuta mpako ya voti; likambo yango esalaki ete batomboki bábebisa mpenza monima ya Trafalgar Square.

Kasi, nsukansuka nalɛmbaki nzoto. Na esika ete ekokisa mikano na biso, mbala mingi kotomboka ezalaki nde kobakisa koyinana.

Ata soki bazali na makanisi ya malamu, bato bakokoka te kosala ete bosembo ezala na makambo nyonso

Na ntango wana nde moninga na ngai moko alakisaki ngai Batatoli ya Yehova. Bateyaki ngai na Biblia ete Nzambe akipaka bampasi na biso mpe akolongola makambo nyonso ya mabe oyo bato basalaka. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:3, 4) Ata soki bazali na makanisi ya malamu, bato bakokoka te kosala ete bosembo ezala na makambo nyonso. Tozali na mposa ya litambwisi ya Nzambe mpe nguya na ye mpo na kolonga banguya oyo emonanaka te, oyo ezali kosala ete bampasi ezala na mokili.​—Yirimia 10:23; Baefese 6:12.

Sikoyo namonaka ete ndenge nazalaki kotomboka mpo na makambo ya kozanga bosembo ezalaki mosala ya mpunda. Koyeba ete na mikolo ezali koya makambo nyonso ya kozanga bosembo ekosila, ekitisaki ngai motema.

Biblia eteyaka ete Yehova Nzambe “alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28) Yango ezali ntina oyo tosengeli kotya motema ete akosala ete bosembo ezala; likambo oyo baguvɛrnema ya bato elongaka te. (Danyele 2:44) Soki okosepela koyeba makambo mosusu, luká Batatoli ya Yehova na esika ofandi to kɔtá na site na biso, www.pr418.com.