Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Masanga

Masanga

Komɛla masanga ezali mabe?

“Vinu esepelisaka mitema ya bato; mafuta engengisaka bilongi na bango, pe bilei epesaka bango nzoto makasi.”​Banzembo 104:15, “Bible na Lingala ya lelo oyo.”

OYO BATO BALOBAKA

Na mabota mingi, masanga ezangaka te na ntango ya kolya. Na mabota mosusu, komɛla masanga epekisami mpenza. Mpo na nini bokeseni wana nyonso? Makambo ndenge na ndenge nde etindaka bato bázala na makanisi ekeseni; na ndakisa, bonkɔkɔ, bokolongono ya nzoto, mpe mangomba.

BIBLIA ELOBI NINI?

Biblia epekisi kolangwa masanga to komɛla koleka ndelo, kasi epekisi te komɛla na ndelo. (1 Bakorinti 6:9, 10) Kutu, banda kalakala, basi mpe mibali oyo bazalaki kosambela Nzambe, bazalaki komɛla vinyo, masanga oyo Biblia elobeli mbala koleka 200. (Ebandeli 27:25) Mosakoli 9:7 elobi boye: “Lyá bilei na yo na esengo mpe mɛlá vinyo na yo na motema esengo.” Lokola vinyo epesaka moto esengo, bazalaki kosalela yango na bafɛti, na ndakisa na oyo ya libala. Ezali na fɛti ya ndenge wana nde Yesu Kristo asalaki likamwisi na ye ya liboso; abongolaki mai “vinyo oyo eleki kitoko.” (Yoane 2:1-11) Bazalaki mpe kosalela vinyo lokola nkisi ya monganga.​—Luka 10:34; 1 Timote 5:23.

Biblia etye mezire ya masanga oyo moto asengeli komɛla?

‘Kozala moombo ya vinyo te.’​Tito 2:3.

YANGO ETALI YO NA NINI?

Mbula na mbula, mabota mingi enyokwamaka mpo moboti moko to bango nyonso mibale balangwaka masanga. Komɛla koleka ndelo ebimisaka makama mingi ata mpe baaksida ya motuka. Mpe nsima ya bambula mingi, komɛla masanga mingi ekoki kobebisa bɔɔngo, motema, libale (foie) mpe estoma.

BIBLIA ELOBI NINI?

Nzambe alingaka te ete bato bálya to bámɛla koleka ndelo. (Masese 23:20; 1 Timote 3:2, 3, 8) Asepelaka te na bato oyo bazangi komipekisa. Biblia elobi boye: “Vinyo ezali mosɛki, masanga oyo elangwisaka ezali na makambo mobulumobulu, mpe moto nyonso oyo azali kotika yango ebungisa ye azali na bwanya te.”​—Masese 20:1.

Masanga ekoki mpe kobungisa moto oyo azangi bwanya nzela na ndenge ebebisaka likoki na ye ya kosala oyo ezali malamu. Hosea 4:11 elobi boye: “Vinyo ná vinyo ya elɛngi, yango nde biloko oyo elongolaka makanisi ya malamu.” Mobali moko na nkombo Jean azwaki liteya nsima ya kokutana na likama. * Nsima ya koswana ná mwasi na ye, akendaki na otɛlɛ moko, amɛlaki masanga mingi, mpe asalaki ekobo; likambo oyo na nsima epesaki ye mpasi mingi na motema mpe azwaki ekateli ete akozongela yango lisusu te. Komɛla koleka ndelo ekoki kobebisa nzoto, bizaleli, mpe boyokani na biso na Nzambe; mpe Biblia elobi ete balangwi-masanga bakozwa bomoi ya seko te.​—1 Bakorinti 6:9, 10.

Ntango nini ebongi te komɛla masanga?

“Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”​Masese 22:3.

YANGO ETALI YO NA NINI?

Buku moko (World Book Encyclopedia) elobi ete, “masanga ezali drɔgɛ moko ya makasi mpenza.” Na yango, na bantango mosusu to liboso ya kosala makambo mosusu, komɛla masanga ata mwa moke ekoki kozala malamu te.

BIBLIA ELOBI NINI?

Mbala mingi bato bazwaka “likama” mpo bamɛlaka na ntango ya mabe. Biblia elobi ete: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango,” ata mpe ntango ya koboya komɛla masanga. (Mosakoli 3:1) Na ndakisa, mibeko ya bamboka mosusu ekoki kopekisa mwana moke amɛla masanga, ekoki kozala malamu te mpo na moto oyo azwi mokano ya kotika masanga amɛla, to moto oyo azali kozwa nkisi ya monganga oyo eyokanaka te na masanga. Mpo na bato mingi, “ntango” ya koboya komɛla ezali liboso ya kokende mosala mpe ntango oyo bazali na mosala, mingimingi soki basalelaka bamasini oyo ekoki kobimisa makama. Mpo na koloba solo, moto ya bwanya atalelaka bomoi mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto ete ezali makabo ya motuya oyo euti na Nzambe. (Nzembo 36:9) Tokomonisa limemya mpo na makabo yango soki tozali kosalela batoli ya Biblia na likambo etali masanga.

^ par. 11 Bankombo mosusu ezali ya bango te.