Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lisumu ya ebandeli ezalaki nini?

Lisumu ya ebandeli ezalaki nini?

Eyano ya Biblia

 Adama ná Eva bazalaki bato ya liboso ya kosala lisumu. Wana babukaki mobeko ya Nzambe mpe balyaki mbuma “ya koyeba malamu mpe mabe,” basalaki oyo bato babengaka lisumu ya ebandeli. a (Ebandeli 2:16, 17; 3:6; Baroma 5:19) Adama ná Eva bapesamaki nzela te ya kolya mbuma ya nzete yango mpamba te ezalaki komonisa bokonzi oyo Nzambe azali na yango, to lotomo, ya kokata nini ezali malamu mpe nini ezali mabe mpo na bato. Ntango balyaki mbuma yango, Adama ná Eva bazwaki lotomo ya kokata bango moko makambo nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Ntango baponaki kosala bongo baboyaki bokonzi ya Nzambe.

 “Lisumu ya ebandeli” ebimiselaki Adama ná Eva nini?

 Mpo na lisumu na bango, Adama and Eva bakómaki mibange mpe bakufaki. Babebisaki boninga na bango na Nzambe mpe babungisaki likoki ya kozala na bomoi libela na libela awa na mabele mpe na sante ya malamu.​—Ebandeli 3:19.

 “Lisumu ya ebandeli” ebimiselaka biso nini?

 Adama ná Eva bapesaki bakitani na bango lisumu. Yango ezali ndenge moko kaka na baboti oyo bazali na maladi moko mabe soki baboti bana, bana yango mpe bakozwa maladi yango. (Baroma 5:12) Na yango, bato nyonso babotamaka “na lisumu,” b elingi koloba, tobotamaka bato ya masumu, yango wana ezalaka pɛtɛɛ mpo na biso tósala makambo ya mabe.​—Nzembo 51:5; Baefese 2:3.

 Mpo na kozanga kokoka, tobɛlaka, tokómaka mibange mpe tokufaka. (Baroma 6:23) Tonyokwamaka mpe mpo na mabe na biso moko mpe oyo ya basusu.​—Mosakoli 8:9; Yakobo 3:2.

 Tokoki nde kosikolama na “lisumu ya ebandeli”?

 Ee. Biblia elobaka ete Yesu akufaki mpo azala “mbeka mpo na kozipa masumu na biso.” (1 Yoane 4:10) Liwa ya Yesu ekoki kosikola biso na kozanga kokoka na biso mpe kopesa biso eloko oyo Adama ná Eva babungisaki; elingi koloba, likoki ya kozala na bomoi ya seko mpe na sante ya malamu.​—Yoane 3:16. c

 Likanisi ya libunga na oyo etali “lisumu ya ebandeli”

 Likanisi ya libunga: Mpo na lisumu wana ya ebandeli, tokoki ata moke te kozala na boyokani malamu ná Nzambe.

 Likambo ya solo: Nzambe apamelaka biso te mpo na makambo oyo Adama ná Eva basalá. Ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka, asɛngaka biso te tósala makambo oyo tokoki te kosala. (Nzembo 103:14) Atako tozali konyokwama na lisumu oyo tosangolá, tozali na likoki ya kokóma baninga ya motema ya Nzambe.​—Masese 3:32.

 Likanisi ya libunga: Batisimo esikolaka moto na lisumu wana ya ebandeli, yango wana esengeli kobatisa babebe.

 Likambo ya solo: Atako batisimo ezali eloko ya motuya ya kosala mpo na kozwa lobiko, kasi moto akobika kaka soki andimi ete Yesu akufaki mpo na ye. (1 Petro 3:21; 1 Yoane 1:7) Lokola kondima ya solosolo eutaka na boyebi, yango wana ekoki kosalema te ete bábatisa babebe. Na yango, Biblia endimaka te batisimo ya babebe. Ezala bakristo ya liboso mpe bazalaki te kondima kobatisa babebe, kasi bazalaki kobatisa bandimi to “basi mpe mibali” oyo bazalaki kondimela Liloba ya Nzambe.​—Misala 2:41; 8:12.

 Likanisi ya libunga: Nzambe alakelá basi mabe mpo Eva azalaki moto ya liboso ya kolya mbuma oyo epekisamaki.

 Likambo ya solo: Na esika ya kolakela mwasi mabe, Nzambe alakelaki nde “nyoka ya liboso, oyo abengami Zabolo to Satana,” oyo atindaki Eva asala lisumu. (Emoniseli 12:9; Ebandeli 3:14) Lisusu, mpo na lisumu ya liboso Nzambe apesaki foti nde epai ya Adama kasi te epai ya Eva.​—Baroma 5:12.

 Mpo na nini Nzambe alobaki ete Adama akozala na bokonzi likoló ya Eva? (Ebandeli 3:16) Ntango alobaki bongo, Nzambe azalaki te kopamela bizaleli na bango. Azalaki kaka kolobela makambo oyo ekoya mpo na lisumu oyo basalaki. Nzambe azalaki kozela ete mobali alinga mpe apesa ye lokumu mpe amonisa limemya makasi epai ya basi nyonso.​—Baefese 5:25; 1 Petro 3:7.

 Likanisi ya libunga: Lisumu ya ebandeli ezalaki kosangisa nzoto.

 Likambo ya solo: Lisumu ya ebandeli ekokaki kozala kosangisa nzoto te mpo na bantina oyo:

  •   Nzambe ayebisaki Adama alya te mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe ntango Adama azalaki naino ye moko liboso kutu mwasi azala.​—Ebandeli 2:17, 18.

  •   Nzambe ayebisaki Adama ná Eva ‘bábota mpe bákóma mingi,’ elingi koloba, bábota bana. (Ebandeli 1:28) Elingaki kozala mabe mpenza mpo na Nzambe kopesa babalani wana ya liboso etumbu mpo na likambo oyo ye moko asɛngaki bango básala.

  •   Adama ná Eva basalaki lisumu esika moko te, yango elingi koloba Eva nde abandaki mpe na nsima Adama.​—Ebandeli 3:6.

  •   Biblia epekisi te kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali oyo babalaná.​—Mosakoli 5:18, 19; 1 Bakorinti7:3.

a Maloba “lisumu ya ebandeli” ezali na Biblia te. Mpo na koloba solo, lisumu ya liboso oyo Biblia elobeli ezali lokuta oyo Satana ayebisaki Eva.​—Ebandeli 3:4, 5; Yoane 8:44.

b Na Biblia, liloba “lisumu” emonisaka kaka te likambo ya mabe kasi mpe ezaleli ya kozanga kokoka oyo bato basangolá yango epai ya baboti na bango ya liboso.

c Mpo na koyeba makambo mingi na oyo etali liwa ya Yesu mpe makambo oyo tokoki kosala mpo na kozwa mapamboli oyo yango ekomemela bato, talá lisolo “Yesu abikisaka—Ndenge nini?