Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe akolimbisa ngai?

Nzambe akolimbisa ngai?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ, Nzambe akolimbisa masumu na yo soki osali makambo oyo asɛngi. Biblia elobi ete azali “Nzambe ya bolimbisi” mpe ete “akolimbisa mpenza.” (Nehemia 9:17; Nzembo 86:5; Yisaya 55:7) Soki alimbisi, alimbisaka na motema moko. Masumu na biso ‘ebomamaka,’ to elongwaka. (Misala 3:19) Nzambe alimbisaka mpo na libelá, mpo alobi boye: “Nakokanisa lisumu na bango lisusu te.” (Yirimia 31:34) Soki alimbisi moto, alandelaka yango lisusu te, apesaka lisusu mpe te etumbu mpo na lisumu yango.

 Kasi, Nzambe alimbisaka te mpo azali na bolɛmbu to mpo na kolimbisa kaka. Abongolaka mibeko na ye te. Yango wana aboyaka kolimbisa masumu mosusu.​—Yosua 24:19, 20.

Makambo moto asengeli kosala mpo Nzambe alimbisa ye

  1.  Ndimá ete obuki mibeko ya Nzambe ndenge osali lisumu. Ata soki lisumu yango eyokisi bato mosusu mpasi, osengeli kondima liboso ete osaleli nde Nzambe mabe.​—Nzembo 51:1, 4; Misala 24:16.

  2.  Yambolá masumu na yo epai ya Nzambe na libondeli.​—Nzembo 32:5; 1 Yoane 1:9.

  3.  Yoká mawa makasi mpo na lisumu na yo. “Mawa oyo eyokani na mokano ya Nzambe” nde ememaka moto na kobongola motema. (2 Bakorinti 7:10) Esangisi koyoka mawa mpo na makambo oyo ememaki yo na lisumu.​—Matai 5:27, 28.

  4.  Tiká mabe, elingi koloba ‘bongwaná.’ (Misala 3:19) Yango ekosɛnga oboya kozongela likambo wana ya mabe to ekosɛnga obongola mpenza ndenge na yo ya kokanisa mpe ya kosala makambo.​—Baefese 4:23, 24.

  5.  Salá makambo oyo esengeli mpo na kobongisa mabe oyo osalaki. (Matai 5:23, 24; 2 Bakorinti 7:11) Sɛngá baoyo bayokaki mpasi bolimbisi mpo na oyo osalaki to osalaki te mpe soki likoki ezali, bongisá makambo.​—Luka 19:7-10.

  6.  Sɛngá Nzambe bolimbisi na libondeli na nzela ya mbeka ya Yesu. (Baefese 1:7) Mpo Nzambe ayanola libondeli na yo, osengeli kolimbisa baoyo basalelaki yo lisumu.​—Matai 6:14, 15.

  7.  Soki lisumu na yo ezali monene, sololá na moto oyo akoki kosalisa yo obongisa boyokani na yo ná Nzambe mpe oyo akoki kobondela mpo na yo.​—Yakobo 5:14-16.

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango

 “Nzambe akoki kolimbisa ngai te mpo nasali masumu mingi.”

Nzambe alimbisaki Davidi mpo na ekobo mpe koboma moto

 Soki tosali makambo oyo Nzambe asɛngi na Biblia, akolimbisa biso, mpo azali na likoki ya kolimbisa masumu ya ndenge nyonso. Akoki kolimbisa masumu ya minene, ata oyo tosali mbala ebele.​—Masese 24:16; Yisaya 1:18.

 Na ndakisa, Nzambe alimbisaki Davidi mokonzi ya Yisraele mpo na ekobo mpe koboma moto. (2 Samwele 12:7-13) Nzambe alimbisaki mpe ntoma Paulo oyo amiyokaki ete ye nde mosumuki oyo aleki basumuki nyonso. (1 Timote 1:15, 16) Ata mpe Bayuda ya siɛklɛ ya liboso oyo Nzambe atyaki liwa ya Yesu Masiya na motó na bango, balimbisamaki ntango babongolaki motema.​—Misala 3:15, 19.

 “Soti natubeli masumu na ngai epai ya sango to pastɛrɛ ekolimbisama.”

 Nzambe apesi moto moko te nzela lelo ya kolimbisa masumu ya baninga na ye bato. Ata soki koyambola masumu epai ya moto mosusu ekoki kosalisa mosumuki atika lisumu yango, kaka Nzambe nde akoki kolimbisa masumu.​—Baefese 4:32; 1 Yoane 1:7, 9.

 Soki ezali bongo, Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bantoma na ye: “Soki bolimbisi masumu ya bato ata ya ndenge nini, balimbisami yango; soki bokangi oyo ya bato ata ya ndenge nini, ekangami”? (Yoane 20:23) Azalaki kolobela bokonzi oyo akopesa kaka bantoma na ye ntango bakozwa elimo santu.​—Yoane 20:22.

 Ndenge alakaki bango, bantoma bazwaki likabo yango ntango elimo santu ekitelaki bango na mobu 33 ya ntango na biso. (Misala 2:1-4) Ntoma Petro asalelaki bokonzi yango ntango asambisaki moyekoli Ananiasi ná Safira. Na ndenge ya likamwisi, Petro ayebaki lokuta oyo babukaki mpe lisambisi na ye emonisaki ete masumu na bango ekolimbisama te.​—Masese 5:1-11.

 Likabo wana ya kokamwa ya elimo santu ndenge moko na makabo mosusu lokola kobikisa bato mpe koloba na minɔkɔ mosusu esilaki nsima ya liwa ya bantoma. (1 Bakorinti 13:8-10) Na yango, moto moko te lelo oyo akoki kolimbisa lisumu ya moto mosusu.