Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na libala?

Biblia elobi nini mpo na libala?

Eyano ya Biblia

 Nsima ya kokela mobali ná mwasi ya liboso, Nzambe abalisaki bango. Amonisaki ete libala ezali boyokani moko ya ndenge mosusu kati na mobali ná mwasi, mpe yango nde ekosimba libota.​—Ebandeli 1:27, 28; 2:18.

 Nzambe alingi ete bato oyo babalani bázala na esengo. (Masese 5:18) Na kati ya Biblia, apesi mibeko mpo na libala mpe batoli mpe mitinda oyo ekoki kosala ete libala ezala malamu.

Na lisolo oyo tokolobela

 Mibeko nini Nzambe apesi mpo na libala?

 Banda na ebandeli, Nzambe asalaki libala mpo esangisa mobali moko ná mwasi moko. (Ebandeli 2:24) Nzambe andimaka te kobala basi ebele, andimaka te bato oyo basalaka makambo ya kosangisa nzoto kati na mibali-mibali to basi-basi, mpe andimaka te libala ya makango. (1 Bakorinti 6:9; 1 Batesaloniki 4:3) Yesu ateyaki bayekoli na ye bátosa mobeko oyo Nzambe atyaki na ebandeli mpo na libala.​—Marko 10:6-8.

 Na miso ya Nzambe, libala esengeli koumela. Ntango mwasi ná mobali babalani, bapesanaka elaka ete bakozala sembo mpe bakofanda elongo ntango nyonso oyo bakozala na bomoi. Nzambe alingi ete bátosa elaka wana.​—Marko 10:9.

 Biblia elobi nini mpo na kokabwana mpe koboma libala?

 Ekoki kokóma ete mwasi to mobali atika moninga, na ndakisa soki asengeli kosala mobembo mpo na kosalisa libota na likambo moko nokinoki. Kasi, Biblia etindi te ete mwasi ná mobali bákabwana mpo na mikakatano oyo ebimi na libala. Nzokande, esɛngi mwasi ná mobali oyo bazali na mikakatano ya libala básala makasi mpo bábongisa.​—1 Bakorinti 7:10.

 Ezali kaka mpo na ekobo nde Biblia endimi ete moto aboma libala. (Matai 19:9) Na yango, soki mwasi ná mobali bazwi ekateli ya kokabwana to ya koboma libala mpo na likambo mosusu oyo ezali ekobo te, Biblia epesi moko te kati na bango nzela ya kolingana na moto mosusu to ya kobala lisusu.​—Matai 5:32; 1 Bakorinti 7:11.

 Libala esengeli kokomama na buku ya Leta mpo Nzambe andima yango?

 Nzambe alingi ete bakristo bátosa mibeko ya Leta na oyo etali libala. (Tito 3:1) Ntango mwasi ná mobali bazali na likoki ya kokomisa libala na bango na buku ya Leta, kosala yango ekomonisa ete batosi bakonzi ya Leta mpe mobeko ya Nzambe oyo elobi ete libala esengeli koumela. a

 Mikumba nini Biblia epesi mibali mpe basi?

  •   Mikumba ya bango mibale. Mibali mpe basi basengeli kosalelana makambo na bolingo mpe na limemya. (Baefese 5:33) Basengeli kokokisa mposa ya moninga ya kosangisa nzoto na bolingo nyonso mpe basengeli koboya kozanga bosembo ata na ndenge nini. (1 Bakorinti 7:3; Baebre 13:4) Soki bazali na bana, bango nyonso mibale bazali na mokumba ya kobɔkɔla bango.​—Masese 6:20.

     Biblia elobeli na bosikisiki te ndenge oyo mwasi ná mobali basengeli kosala mpo na mosala ya mosuni mpe misala ya ndako. Bango mibale bakoki kotala elongo soki nini ekozala malamu mpo na libota na bango.

  •   Mokumba ya mobali. Biblia elobi ete “mobali azali mokonzi ya mwasi na ye.” (Baefese 5:23) Bokonzi ya mobali elimboli ete asengeli kokamba libota na ye mpe kozwa bikateli ya malamu mpo na mwasi ná bana na ye.

     Asengeli kosala makasi mpo na koleisa mpe kolatisa bango, kosalisa bango bázala na esengo, mpe bázala na boyokani malamu na Nzambe. (1 Timote 5:8) Akomonisa ete asepelaka na bizaleli malamu mpe na mayele ya mwasi na ye soki azali kosala na bomoko elongo na ye, azali kotya likebi na makanisi mpe na mayoki na ye na ntango ya kozwa bikateli. (Masese 31:11, 28) Biblia elobi ete mobali asengeli kokokisa mikumba na ye na bolingo mpenza.​—Bakolose 3:19.

  •   Mokumba ya mwasi. Biblia elobi ete “mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Nzambe asepelaka ntango mwasi azali komemya mokumba oyo Nzambe epesá mobali na ye.

     Mokumba ya mwasi ezali ya kosunga mobali na ye, kosalisa ye azwaka bikateli ya malamu mpe kopesa ye mabɔkɔ ntango azali kotambwisa makambo. (Ebandeli 2:18) Biblia ekumisi mwasi oyo akokisaka malamu mokumba na ye ya ntina mingi na kati ya libala.​—Masese 31:10.

 Lelo oyo Nzambe asɛngi ete bato oyo babalani bábota bana?

 Te. Na ntango ya kala, Nzambe asɛngaki basaleli na ye mosusu ete bábota bana. (Ebandeli 1:28; 9:1) Kasi etinda yango etali bakristo te. Yesu asɛngaki bayekoli na ye ata na esika moko te ete bábota bana. Ata moyekoli na ye moko te ya liboso alobaki ete bato oyo babalani basengeli kobota bana. Mwasi ná mobali bango moko basengeli kozwa ekateli soki bakobota to te.

 Ndenge nini Biblia ekoki kobongisa libala na ngai?

 Biblia ezali na batoli oyo ekoki kosalisa mwasi ná mobali bábanda libala na bango malamu. Batoli ya Biblia ekoki mpe kosalisa mwasi ná mobali bákima mikakatano to bálonga yango.

 Batoli ya Biblia ekoki kosalisa mwasi ná mobali . . .

a Mpo na koyeba ndenge Biblia etalelaka mabala ya bonkɔkɔ, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/2006, lokasa 21, paragrafe 12.