Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolimbisa ebomaka mɔtɔ oyo matata ebimisaka

MPO NA BABALANI

4: Kolimbisana

4: Kolimbisana

YANGO ELIMBOLI NINI?

Kolimbisa elimboli koboya kolandela likambo mpe koboya kobomba nkanda na motema. Kolimbisa elimboli te kozwa na lisɛki mabe oyo basaleli biso to kosala lokola likambo esalemi te.

TOLI YA BIBLIA: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”​—Bakolose 3:13.

“Soki olingi moto, osengeli te kolandela mabunga na ye; osengeli kotala nde milende oyo azali kosala mpo na kobongola bizaleli na ye.”​—Aaron.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Soki obombi nkanda na motema, ekoki kosala yo mabe na nzoto mpe na makanisi; ekoki mpe ata kobebisa libala na yo.

“Mokolo moko, mobali na ngai asɛngaki nalimbisa ye mpo na likambo moko oyo epesaki ngai mpasi mingi na motema. Nazalaki kokoka te kolimbisa ye. Nsukansuka, nalimbisaki ye, kasi nayokaki mpasi na motema mpo nasalaki yango noki te. Likambo yango ememelaki biso mindɔndɔ kaka mpamba.”​—Julia.

OYO OKOKI KOSALA

MITALELÁ

Mbala ya nsima oyo okomona ete molongani na yo alobi to asali likambo moko oyo epesi yo mpasi na motema, omituna boye:

  • ‘Nasilikaka mpambampamba?’

  • ‘Libunga oyo asaleli ngai ezali mpenza monene, oyo esɛngi ete asɛnga ngai bolimbisi, to nakoki kaka kolekisa yango?’

SOLOLÁ NA MOLONGANI NA YO

  • Mbala mingi, ezwaka ntango boni mpo na kolimbisana soki moko asali mabe?

  • Tokoki kosala nini mpo tólimbisanaka noki?

TOLI

  • Soki molongani na yo apesi yo mpasi na motema, komona te ete asali yango na nko.

  • Salá makasi olimbisa ye, mpe kobosana te ete “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.”​—Yakobo 3:2.

“Tolimbisanaka mbala moko soki biso nyonso mibale tosali mabe, kasi soki moko na biso nde asali mabe, ezalaka mpasi kolimbisa. Esɛngaka komikitisa makasi mpo na kondima kolimbisa ntango moninga asɛngi bolimbisi.”​—Kimberly.

TOLI YA BIBLIA: “Salá noki obongisa makambo.”​—Matai 5:25.

Soki obombi nkanda na motema, ekoki kosala yo mabe na nzoto mpe na makanisi; ekoki mpe ata kobebisa libala na yo