Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 2

Zalá sembo epai ya molongani na yo

Zalá sembo epai ya molongani na yo

“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”Marko 10:9

Yehova asɛngi biso tózala sembo. (Nzembo 31:23) Yango ezali na ntina mingimingi na libala mpo soki bosembo ezali te, bokotyelana mpe motema te. Yango wana, kotyelana motema ezali na ntina mingi mpo bolingo ekola.

Lelo oyo, bato mingi bazali sembo te na libala na bango. Mpo na kobatela libala na yo, osengeli kosala makambo mibale.

1 TYÁ LIBALA NA YO NA ESIKA YA LIBOSO

OYO BIBLIA ELOBI: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Libala na yo ezali moko ya makambo oyo eleki ntina na bomoi na yo. Osengeli kotya yango na esika ya liboso.

Yehova alingi ete okangama na molongani na yo mpe ‘bósepela na bomoi’ elongo. (Mosakoli 9:9) Amonisi polele ete osengeli ata mokolo moko te kosundola molongani na yo; kasi osengeli nde koluka ndenge ya kosala makambo oyo ekopesa moninga esengo. (1 Bakorinti 10:24) Salá nyonso mpo molongani na yo amona ete ozalaka na mposa na ye mpe osepelaka na ye.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Lekisáká ntango mingi elongo na molongani na yo, mpe tyeláká ye likebi nyonso

  • Kanisáká molongani na yo na makambo nyonso

2 BATELÁ MOTEMA NA YO

OYO BIBLIA ELOBI: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:28) Soki moto akanisaka makambo ya mbindo mingi, azali sembo te epai ya molongani na ye.

Yehova alobi ete osengeli ‘kobatela motema na yo.’ (Masese 4:23; Yirimia 17:9) Mpo na kosala yango, osengeli kokeba na miso na yo. (Matai 5:29, 30) Landá ndakisa ya Yobo, oyo asalaki kondimana na miso na ye mpo atala ata moke te mwasi mosusu na mposa. (Yobo 31:1) Zalá na ekateli makasi ya koboya mpenza kotala pornografi. Zalá mpe na ekateli makasi ya koboya kozala seresere na mwasi to mobali oyo azali molongani na yo te.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Monisáká bato polele ete okangamá kaka na molongani na yo

  • Talelá makambo oyo ekoki koyokisa molongani na yo mpasi, mpe katá mbala moko boninga nyonso oyo ekoki kotungisa ye