Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sekele mpo na libota ya esengo

Ndenge ya kolonga na mbula ya liboso ya libala

Ndenge ya kolonga na mbula ya liboso ya libala

Mobali alobi boye: “Nakamwaki mpenza ntango namonaki ete ngai ná mwasi na ngai tokeseni na makambo mingi! Na ndakisa, ngai nalingaka kolamuka na ntɔngɔ makasi, kasi ye alingaka kolala noki te. Nakamwaka mpe ndenge azalaka; ntango moko azali na esengo mpe na mbala moko akómi nkandankanda to mawamawa! Likambo mosusu mpe, ntango nazali kolamba alobelakalobelaka ngai mingi, mingimingi mpo na ndenge oyo napangwisaka mabɔkɔ na elamba ya kopangwisela basaani.”

Mwasi alobi boye: “Mobali na ngai alobaka mingi te. Kasi, ngai nalobaka mingi mpo na libota na biso tomesaná bongo. Na libota na biso tolobaka mingi, mingimingi na ntango ya kolya. Mpe ntango mobali na ngai azali kolamba, apangwisaka mabɔkɔ na elamba oyo topangwiselaka basaani! Yango epesaka ngai nkanda! Mpo na nini mibali bazalaka bongo? Ndenge nini moto akoki kosala mpo libala na ye elonga?”

SOKI outi kobala sika, yo mpe okutani na mikakatano ya ndenge wana? Ozali komona lokola ete molongani na yo akómi na bizaleli oyo azalaki na yango te ntango bozalaki naino bafianse? Ndenge nini okoki kosala mpo “bampasi ya mokolo na mokolo oyo babalani bakutanaka na yango” ekómela yo mingi te?​—1 Bakorinti 7:28, Biblia Today’s English Version.

Ya liboso, kokanisa te ete lokola bobalani yo ná molongani na yo bokɔmeli na makambo ya libala. Ekoki kozala ete ntango ozalaki monzemba oyekolaki bizaleli malamu mpo na ndenge ya kofanda na bato, mpe ekoki kozala ete obongisaki lisusu bizaleli yango ntango bozalaki bafianse. Kasi, libala ekotinda yo omonisa lisusu bizaleli yango na ndenge mosusu ya sika mpe ekoki kosɛnga obakisa bizaleli mosusu. Okoki kosala mabunga? Ee. Okoki kokóma na bizaleli oyo esengeli? Ee!

Ndenge malamu ya kobongisa lisusu bizaleli na yo ezali ya koluka toli epai ya moto oyo ayebi mpenza likambo yango mpe kosalela batoli oyo akopesa yo. Moto oyo ayebi mpenzampenza makambo ya libala ezali Yehova Nzambe. Kutu, Ye nde asalá biso na mposa wana ya kobala. (Ebandeli 2:22-24) Simbá ndenge Liloba na ye Biblia ekoki kosalisa yo olonga mikakatano mpe okóma na bizaleli oyo osengeli na yango mpo na kosala ete bólekisa malamu mbula ya liboso ya libala na bino.

EZALELI 1. BÓTUNANAKA MAKANISI

Mokakatano ezali wapi?

Keiji *, mobali moko oyo afandaka na Japon, azalaki ntango mosusu kobosana ete bikateli oyo azalaki kozwa ezalaki kopesa mwasi na ye mpasi. Alobi boye: “Nazalaki kondima kokende epai babengisi biso, kozanga ete natuna mwasi na ngai; na nsima nazalaki komona ete ezali mpasi mpo ye azala na esika yango oyo babengisi biso.” Allen, mobali moko na Australie alobi boye: “Nazalaki komona ete soki natuni mwasi na ngai makanisi na ye, ezali lokola nde nazali mobali te.” Mobali yango azalaki na mokakatano mpo na ndenge abɔkwamá. Ezalaki mpe ndenge moko mpo na Dianne, mwasi moko oyo afandaka na Angleterre. Alobi boye: “Namesanaki koluka toli epai ya bato ya libota na ngai. Yango wana, liboso nazwa ekateli, nazalaki naino kotuna bango na esika ya kotuna mobali na ngai.”

Bosengeli kosala nini?

Kobosana te ete na miso ya Yehova Nzambe, mwasi ná mobali oyo babalani bakómaka “mosuni moko.” (Matai 19:3-6) Na miso na ye, boyokani moko te oyo bato bakoki kosala ezali na ntina koleka boyokani ya mwasi ná mobali! Mpo boyokani yango ezala makasi, kosololaka malamu ezali na ntina.

Mwasi ná mobali bakoki koyekola makambo mingi soki batali ndenge Yehova Nzambe asololaki na Abrahama. Na ndakisa, tosɛngi yo otánga lisolo yango oyo ezali na Ebandeli 18:17-33. Simbá ete Nzambe apesaki Abrahama lokumu na ndenge misato. (1) Yehova alimbolelaki ye likambo oyo alingaki kosala. (2) Ayokaki ntango Abrahama azalaki kopesa makanisi na ye. (3) Ntango emonanaki malamu, Yehova andimaki koyokanisa likambo oyo alingaki kosala na mposa ya Abrahama. Ndenge nini okoki kolanda ndakisa yango ntango ozali kotuna likanisi ya molongani na yo?

MEKÁ KOSALA BOYE: Ntango ozali kotalela makambo oyo etali mpe molongani na yo (1) yebisá ye ndenge ozali kokana kosilisa makambo yango, kasi monisá kaka makanisi na yo, koluka te komonisa yango lokola ekateli oyo ozwi to mpe mitindo; (2) sɛngá molongani na yo apesa makanisi na ye, mpe yebá ete azali na lotomo ya kopesa likanisi oyo ekeseni na oyo ya yo; mpe (3) ntango ozali kondima makambo oyo molongani na yo alingaka ntango ezali mabe te kosala bongo, okomonisa ete ozali na ‘ezaleli ya makambo makasimakasi te.’​—Bafilipi 4:5.

EZALELI 2. YEBÁ NDENGE YA KOLOBA

Mokakatano ezali wapi?

Ezala soki outá na libota nini to mpe okolá ndenge nini, okoki kozala na momeseno ya kobimisa makanisi na yo na ndenge ya makasi ata mpe na ndenge ya mabe. Na ndakisa, Liam, oyo afandaka na Mpoto alobi boye: “Epai nakolá bato bazalaka na maloba ya kozokisa. Ndenge na ngai mabe ya koloba, mbala mingi ezokisaka mwasi na ngai. Nasengeli koyekola kozala na boboto.”

Bosengeli kosala nini?

Kokanisa te ete molongani na yo akolinga olobaka na ye ndenge oyo yo omesaná koloba. (Bafilipi 2:3, 4) Toli oyo ntoma Paulo apesaki misionɛrɛ moko ekoki mpe kosalisa bato oyo babalani sika. Akomaki boye: “Moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto.” Na Grɛki, liloba oyo ebongolami na “boboto” ekoki mpe kobongolama na “koyeba koloba.” (2 Timote 2:24) Koyeba koloba ezali likoki ya kososola likambo moko oyo ekoki kobimisa mokakatano mpe kosilisa likambo yango na boboto kozanga kosilikisa moto.

MEKÁ KOSALA BOYE: Ntango molongani na yo alɛmbisi yo, salá lokola ozali kosolola na molongani na yo te kasi na moninga na yo to patrɔ na yo. Okoloba na mongongo makasi to okosalela maloba ya nkanda? Na nsima, kanisá ntina oyo ebongi oloba na molongani na yo na bonkonde mpe na boboto koleka ndenge okoki koloba na moninga to na patrɔ na yo.​—Bakolose 4:6.

EZALELI 3. LUKÁ KOMESANA NA MIKUMBA NA YO YA SIKA

Mokakatano ezali wapi?

Mobali akoki liboso kosalela bokonzi na ye na ndenge ya mabe, to mwasi akoki koyeba te ndenge ya kopesa makanisi kozanga kozokisa mobali na ye. Na ndakisa, Antonio, mobali moko na Italie alobi boye: “Ezalaki mpasi tata na ngai atuna makanisi ya mama ntango alingi kozwa bikateli etali libota. Na yango, liboso nazalaki kotambwisa libota na ngai lokola mokonzi oyo akweisaka kaka mitindo.” Debbie, mwasi moko na Canada, alobi boye: “Nazalaki kolinga ete mobali na ngai abimaka ntango nyonso kitoko na miso ya bato. Kasi, ndenge oyo nazalaki kolobela ye likambo yango ezalaki kokómisa ye motó makasi.”

Mobali asengeli kosala nini?

Mibali mosusu bayebaka kokesenisa te likambo oyo Biblia elobi na ntina na botosi ya mwasi mpe botosi oyo mwana asengeli kozala na yango epai ya baboti na ye. (Bakolose 3:20; 1 Petro 3:1) Nzokande, Biblia alobi ete mobali asengeli ‘kokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’; elobi bongo te mpo na moboti mpe mwana. (Matai 19:5) Yehova amonisaki ete mwasi asengelaki kozala mosungi to mopanzi ya mobali na ye. (Ebandeli 2:18) Alobaki te ete mwana azali mosungi to mopanzi ya moboti. Okanisi nini​—Soki mobali azali kosalela mwasi na ye makambo lokola mwana moke, azali mpenza kokumisa ebongiseli ya libala?

Kutu, Liloba ya Nzambe elendisi yo osalela mwasi na yo makambo ndenge Yesu asalelaki lisangá ya bokristo. Okoki kosalisa mwasi na yo atalela yo lokola mokonzi na ye soki (1) ozali kosɛnga ye na makasi te atosa yo mpe (2) soki ozali kolinga ye lokola olingaka nzoto na yo moko ata soki mikakatano ebimi.​—Baefese 5:25-29.

Mwasi asengeli kosala nini?

Ndimá ete sikoyo, mobali na yo nde azali mokonzi oyo Nzambe atyeli yo. (1 Bakorinti 11:3) Soki ozali kopesa mobali na yo lokumu, ozali mpe kopesa Nzambe lokumu. Soki oboyi bokonzi na ye, okomonisa kaka te ndenge oyo oyokaka mpo na mobali na yo kasi mpe ndenge oyo otalelaka Nzambe mpe mitinda na ye.​—Bakolose 3:18.

Ntango ozali kolobela likambo oyo ebimisi mokakatano, lobelá nde likambo yango, kasi te ezaleli ya mobali na yo. Na ndakisa, mokonzi mwasi Estere alingaki ete mobali na ye Mokonzi Ahasueruse abongisa likambo moko ya kozanga bosembo. Na esika ya kosilikela mobali na ye, alobaki na ye na mayele. Mobali na ye andimaki likanisi na ye mpe nsukansuka asalaki likambo oyo esengelaki. (Estere 7:1-4; 8:3-8) Mobali na yo akolinga yo mingi soki (1) ozali kotikela ye ntango ya komesana na mokumba na ye ya sika ya mokonzi ya libota mpe (2) ozali kotosa ye, ata ntango asali mabunga.​—Baefese 5:33.

MEKÁ KOSALA BOYE: Na esika ya kosala liste ya makambo oyo molongani na yo asengeli kobongisa, salá nde liste ya makambo oyo yo osengeli kobongisa. Mibali: Ntango osilikisi mwasi na yo na ndenge na yo ya kosalela bokonzi na yo to ozali kokoka te kosalela bokonzi na yo, tuná ye boye, ndenge nini nakoki kobongisa lisusu mpe komá makanisi oyo ayebisi yo. Basi: Ntango mobali na yo azali komona ete ozali kotosa ye te, tuná ye ndenge oyo okoki kobongisa lisusu, mpe komá makambo oyo ayebisi yo.

Zalá na bokatikati

Kozala na libala ya esengo mpe ya malamu ezali lokola koyekola kotambwisa velo. Makama ezangaka te, ntango ozali komesana kotambwisa velo. Ndenge moko, osengeli koyeba ete okosala mabunga wana ozali komesana na makambo ya libala.

Yebáká mpe kosɛkisa. Kozwaka na lisɛki te makambo oyo ezali kotungisa molongani na yo, kasi yebáká mpe kosɛka ntango osali libunga. Zwáká libaku ya kosepelisa molongani na yo na mbula ya liboso ya libala na bino. (Kolimbola Mibeko 24:5) Na nyonso, bótika Liloba ya Nzambe etambwisa libala na bino. Soki bosali bongo, libala na bino ekokóma makasi mbula na mbula.

^ par. 9 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

OMITUNA BOYE . . .

  • Nakómisá molongani na ngai moninga na ngai mpenza ya motema, to nasepelaka kotuna basusu makambo?

  • Lobi nasalaki nini mpo na komonisa ete nalingaka mpe namemyaka molongani na ngai?