Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na libala ya makango?

Biblia elobi nini mpo na libala ya makango?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobi ete eloko oyo Nzambe alingi mpo na bato ezali ete ‘báboya pite.’ (1 Batesaloniki 4:3) Ndenge basaleli yango na Biblia, liloba “pite” esangisi makambo lokola ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe kosangisa nzoto mwasi ná mobali oyo babalani te.

 Mpo na nini ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe mobali ná mwasi bábalana to te?

  •   Libala ezali ebongiseli oyo eutá na Nzambe. Abandisaki yango ntango asalaki ete babalani ya liboso báfanda esika moko. (Ebandeli 2:22-24) Alingaki te mwasi ná mobali báfanda esika moko kozanga ete bábalana.

  •   Nzambe ayebi oyo eleki malamu mpo na bato. Asalaki libala mpo mwasi ná mobali báfanda libela mpe na ndenge yango ekomemela bato ya libota mapamboli mpe libateli. Tótalela ndakisa moko ya pɛtɛɛ. Kaka ndenge mosali kiti to mesa alakisaka biso ndenge malamu ya kosangisa biteni ndenge na ndenge mpo na kosala kiti to mesa, ndenge moko mpe mibeko ya Nzambe elakisaka biso ndenge malamu ya kokómisa boyokani na biso na libota makasi. Mibeko ya Nzambe ezalaka ntango nyonso na matomba epai ya baoyo batosaka yango.​—Yisaya 48:17, 18.

    Mosali kiti to mesa alakisaka biso ndenge malamu ya kosangisa biteni ndenge na ndenge mpo na kosala kiti to mesa, ndenge moko mpe mibeko ya Nzambe elakisaka biso ndenge malamu ya kokómisa boyokani na biso na libota makasi

  •   Kosangisa nzoto na moto mosusu oyo azali molongani na yo te ekoki kozala na makama minene. Na ndakisa, moto akoki kozwa zemi kozanga kokana, maladi oyo eutaka na kosangisa nzoto mpe kotungisama na makanisi. a

  •   Nzambe apesaki mwasi ná mobali likoki ya kobota na nzela ya kosangisa nzoto. Bomoi ezali mosantu na miso ya Nzambe, mpe likoki ya kobota ezali likabo moko ya valɛrɛ mingi. Nzambe alingaka ete tómemyaka likabo yango mpe tótosaka ebongiseli oyo azwá mpo na libala.​—Baebre 13:4.

 Bongo soki mwasi ná mobali bazali kofanda esika moko liboso bábalana mpo na komona soki makambo ekosimba?

 Mpo na kolonga na libala, ezali na ntina mpenza te ete bato báfanda kozanga bábalana mpo na komona soki makambo ekosimba. Kutu, boyokani ekómaka makasi ntango bango mibale mwasi ná mobali bazali kotyelana motema mpe kosala na bomoko mpo na kolonga mikakatano. b Ndai ya libala ekómisaka lisusu libala makasi.​—Matai 19:6.

 Ndenge nini babalani bakoki kokómisa libala na bango makasi?

 Mabala ya kokoka ezalaka te. Kasi, babalani bakoki kolonga kokómisa libala na bango makasi ntango bazali kosalela toli ya Biblia. Talá mwa toli na yango:

a Talá lisolo “Mituna bilenge batunaka . . . Nasala nini soki moto na ngai alingi kaka tósangisa nzoto?