Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ekoki kobɔndisa ngai?

Biblia ekoki kobɔndisa ngai?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ. (Baroma 15:4) Talá mwa bavɛrsɛ ya Biblia oyo esalisaki bato mingi oyo bazali kokutana na makambo ya mpasi mpe kotungisama na makanisi.

Na lisolo oyo tokolobela:

 Mikakatano

 Nzembo 23:4: “Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi, Nabangaka eloko ya mabe ata moko te, Mpo ozali elongo na ngai.”

 Ndimbola: Ntango obondeli Nzambe mpe otyeli Liloba na ye Biblia motema, mpe otiki ete etambwisa yo, yango ekosalisa yo ozwa makasi ya kolonga mikakatano.

 Bafilipi 4:13: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”

 Ndimbola: Nzambe akoki kopesa yo makasi ya kolonga likambo nyonso ya mpasi oyo ozali kokutana na yango.

 Liwa ya moto oyo tolingaka

 Mosakoli 9:10: “Mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda.”

 Ndimbola: Bato oyo bakufá banyokwamaka te, mpe bakoki kosala biso mabe te. Bayebi eloko te.

 Misala 24:15: “Lisekwa ekozala.”

 Ndimbola: Nzambe akozongisa na bomoi bato oyo tolingaka oyo bakufá.

 Komipesa foti koleka ndelo

 Nzembo 86:5: “Mpo yo, Ee Yehova, a ozali malamu mpe osepelaka kolimbisa; motema boboto oyo ozali komonisela baoyo nyonso bazali kobelela yo ezali mingi.”

 Ndimbola: Nzambe alimbisaka bato nyonso oyo báyokaka mpasi mpenza na mabunga na bango ya kala mpe bazwaka mokano ya koboya kozongela mabunga yango.

 Nzembo 103:12: “Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.”

 Ndimbola: Ntango Nzambe alimbisaka, atyaka masumu na biso mosika mpenza na ye. Akanisaka yango lisusu te mpo na kopesa biso etumbu.

 Mawa

 Nzembo 31:7: “Omoni mpasi na ngai; oyebi bampasi ya molimo na ngai.”

 Ndimbola: Nzambe ayebi makambo nyonso ya mpasi oyo ozali kokutana na yango. Ata ntango bato mosusu bakoki koyeba te ndenge ozali komiyoka, Yehova ayebi mayoki na yo ya kati mpenza.

 Nzembo 34:18: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.”

 Ndimbola: Nzambe alaki ete akosalisa yo na ntango oyo ozali na mawa. Akoki kopesa yo makasi ya koyikela mpasi oyo ozali na yango mpiko.

 Maladi

 Nzembo 41:3: “Yehova ye moko akosunga ye na mbeto ya maladi.”

 Ndimbola: Nzambe akoki kopesa yo kimya na motema oyo ekosalisa yo oyikela maladi ya makasi mpiko, kolendendela, mpe bwanya mpo ozwa bikateli ya malamu.

 Yisaya 33:24: “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: “Nazali na maladi.’”

 Ndimbola: Nzambe alaki ete na mikolo ezali koya, bato nyonso bakosepela kozala na sante ya malamu.

 Mitungisi ya makanisi

 Nzembo 94:19: “Ntango makanisi oyo etungisaka ngai ekómaki mingi na kati na ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai motema.”

 Ndimbola: Soki toluki lisalisi ya Nzambe ntango tozali komitungisa, akoki kosalisa biso tóbatela kimya na motema.

 1 Petro 5:7: ‘Bwakelá ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’

 Ndimbola: Nzambe akipaka bampasi na biso. Asɛngi biso tóbondela ye mpo na mitungisi na biso.

 Bitumba

 Nzembo 46:9: “Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.”

 Ndimbola: Bokonzi ya Nzambe ekolongola bitumba mpo na libela.

 Nzembo 37:11, 29: “Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, Mpe bakosepela mpenza na kimya mingi. . . . Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”

 Ndimbola: Bato ya malamu bakosepela na kimya mpo na libela awa na mabele.

 Komitungisa mpo na avenire

 Yirimia 29:11: “‘Nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’”

 Ndimbola: Nzambe alaki ete basaleli na ye bakozala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.

 Emoniseli 21:4: “Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

 Ndimbola: Nzambe alaki ete akolongola makambo nyonso ya mabe oyo ozali komona mpe oyo ezali kokómela yo lelo oyo.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo: “Yehova azali nani?