Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyoka ete okokoka lisusu te?

Ozali koyoka ete okokoka lisusu te?

BOMOI ezalaka elɛngi soki makambo nyonso ezali kotambola malamu. Kasi, ekómaka bololo soki moto akómi koyoka ete akokoka lisusu te!

Na ndakisa, Sally, * mwasi moko oyo afandi na États-Unis, abungisaki biloko na ye nyonso ntango mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki na mboka na bango; alobi boye: “Nakómaki koyoka ete nakokoka lisusu te. Namonaki ete nakómi mpenza na nsuka mpe eumelaki bongo mikolo mingi.”

Ezalaka ndenge nini ntango liwa ezwi ndeko to moninga moko? Janice, mwasi moko oyo afandi na Australie, alobi boye: “Ntango bana na ngai mibale ya mibali bakufaki, nakómaki koyoka ete bomoi na ngai ezali lisusu na ntina moko te. Nabondelaki Nzambe, nalobaki na ye: ‘Yokelá ngai mawa, nakokoka lisusu te! Tiká ngai nakufa na ngai.’”

Mpo na Daniel, mwasi na ye nde asalaki ekobo. Alobi boye: “Ntango mwasi na ngai ayebisaki ngai ete asalaki ekobo, nayokaki lokola batubi ngai mbeli na motema. Mpasi yango ezalaki kozongela ngai mbala na mbala, eumelaki basanza mingi.”

Na zulunalo oyo, tokolobela ndenge bomoi na yo ekoki kozala kaka na ntina ata soki

Ya liboso, tokoki kosala nini ntango likama moko ekómeli biso?

^ par. 3 Bato mosusu na masolo oyo topesi bango bankombo mosusu.