Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini na likambo ya kosukisa bomoi ya moto ya maladi oyo emonani ete akobika lisusu te?

Biblia elobi nini na likambo ya kosukisa bomoi ya moto ya maladi oyo emonani ete akobika lisusu te?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli polele te likambo ya kosukisa bomoi ya moto ya maladi oyo emonani ete akobika te. a Kasi oyo Biblia elobi mpo na bomoi mpe liwa, elekisi ndelo te. Kolukela moto liwa ezali mabe, kasi ezali te na mobeko moko oyo esɛngi kopusa mikolo ya bomoi ya moto oyo etikali moke akata motema.

 Biblia ebengi Nzambe Mokeli na biso, “liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9; Misala 17:28) Bomoi ezali na valɛrɛ mingi na miso ya Nzambe. Yango wana Nzambe apekisi koboma moto to komiboma. (Kobima 20:13; 1 Yoane 3:15) Lisusu, Biblia emonisi ete tosengeli koyeba ndenge ya kosala mpo na kobatela bomoi na biso mpe bomoi ya basusu. (Mibeko 22:8) Ezali polele ete Nzambe alingi tózwa likabo ya bomoi na valɛrɛ.

Bongo soki moto akómi pene ya liwa?

 Biblia eboyi koboma moto ata soki akobika te mpe etikali moke akufa. Ndakisa ya Mokonzi Saulo endimisi likanisi yango. Ntango azokaki mabe na etumba mpe akokaki kobika te, asɛngaki mosaleli na ye asalisa ye na komiboma. (1 Samwele 31:3, 4) Mosaleli ya Saulo aboyaki. Kasi na nsima, moto mosusu alobaki na lokuta nyonso ete akokisaki mposa ya Saulo. Davidi akweisaki moto yango mpe amemisaki ye nyongo ya makila​—Davidi amonisaki makanisi ya Nzambe na likambo yango.​—2 Samwele 1:6-16.

Esengeli kosala nyonso mpo na koyeisa bomoi molai?

 Soki emonani polele ete moto alingi akufa, Biblia esɛngi te kopusa mikolo ya moto yango. Kutu Biblia ezali na bokatikati na likambo yango. Liwa ezali monguna monene, likambo oyo lisumu ememelá biso. (Baroma 5:12; 1 Bakorinti 15:26) Atako liwa ezali eloko ya kosepela na yango te, ntina ya kobanga yango ezali te mpo Nzambe alaki kosekwisa baoyo bazali kokufa. (Yoane 6:39, 40) Moto oyo azwaka bomoi na valɛrɛ alukaka lisalisi ya monganga ya malamu koleka. Kasi, kosala bongo esɛngi te kopona mayele ya minganga oyo ekopusa mikolo ya bomoi ya moto oyo akómi pene ya kokata motema.

Komiboma ezali lisumu oyo elimbisamaka te?

 Te, Biblia etángi te komiboma na molɔngɔ ya lisumu oyo elimbisamaka te. Ata bongo, kokata bomoi ya moto ezali lisumu monene, b Nzambe ayebi mpenza makambo oyo ekoki kosala ete moto akóma na makanisi ya komiboma; na ndakisa maladi ya motó, maladi ya makanisi, to likambo ya libota. (Nzembo 103:13, 14) Apesaka baoyo bazali na mawa libɔndisi na nzela ya Biblia. Lisusu, Biblia elobi ete “lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Yango emonisi ete elikya ya lisekwa ezali mpo na bato oyo basalaki mabunga minene, na ndakisa bamibomaki.

a Diksionɛrɛ moko (Merriam-Webster Learner’s Dictionary) elobi ete kosukisa bomoi ya moto ya maladi oyo emonani ete akobika te ezali lokola “koboma moto oyo azali maladi makasi to azokaki mpo anyokwama mingi lisusu te.” Soki monganga asalisi moto ya maladi akata bomoi na ye, balobaka ete monganga yango apesi moto oyo alingi komiboma mabɔkɔ.

b Mwa bandakisa ya bato nyonso oyo Biblia elobeli, oyo bamibomaki, basalaki bongo te na boyokani na mokano ya Nzambe.​—2 Samwele 17:23; 1 Bakonzi 16:18; Matai 27:3-5.