Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bomoi mpe liwa

Bomoi

Bomoi ezali na ntina nini?

Osí omituná soki ‘Bomoi ezali na ntina nini? Talá biyano oyo Biblia epesi na motuna yango.

Nzambe alingi nasala nini na bomoi na ngai?

Esengeli Nzambe apesa yo vision, omona emonaneli to olɔta ndɔtɔ mpo oyeba mokano ya Nzambe? Talá eyano ya Biblia.

Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?

Biblia elobi ete baoyo basalaka mokano ya Nzambe bakozala na bomoi libela. Talá makambo misato oyo alingi tósala.

Molimo ezali nini?

Ezali eloko moko na kati na yo? Etikalaka na bomoi nsima ya liwa?

Nkombo ya banani ekomamá na “buku ya bomoi”?

Nzambe alobaki ete akobosana te bato oyo bazali sembo epai na ye. Nkombo na yo mpe ezali na “buku ya bomoi”?

Liwa

Mpo na nini bato bakufaka?

Eyano oyo Biblia epesi na motuna yango ekokitisa yo motema mpe ekopesa yo elikya.

Soki moto akufi akómaka ndenge nini?

Moto oyo akufi ayebaka makambo oyo ezali kosalema zingazinga na ye?

Biblia elobi nini na likambo etali kotumba bibembe?

Ezali na balolenge mingi ya kosala na nzoto ya ebembe?

Nazali na mposa ya kokufa​—Biblia ekoki kosalisa ngai ntango nazali na makanisi ya komiboma?

Toli nini oyo esalisaka Biblia epesi baoyo bazali na mposa ya kokufa?

Ndenge nini okoki kolongola nsɔmɔ ya liwa?

Kolongola nsɔmɔ ya liwa ekoki kosalisa yo ozala na esengo na bomoi.

Bimonamona oyo bato mosusu bamonaka pene ya kokufa ezalaka nde mboka ya bawa?

Elakisaka nde moto ndenge bomoi ezalaka nsima ya liwa? Lisolo ya Biblia oyo elobeli lisekwa ya Lazare esalisi biso tózwa eyano.

Mokolo ya liwa na biso etángamá?

Mpo na nini Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kokufa”?

Biblia elobi nini na likambo ya kosukisa bomoi ya moto ya maladi oyo emonani ete akobika lisusu te?

Bongo soki moto akómi pene ya kokata motema? Esengeli kosala nyonso mpo na kopusa mikolo ya bomoi na ye?

Likoló mpe lifelo

Likoló ezali nini?

Ndenge esalelami na Biblia, liloba yango ezali na ndimbola misato.

Nani akokende na likoló?

Bato mingi bazali na likanisi ya lokuta ete bato malamu nyonso bakokende na likoló. Biblia eteyaka mpenza nini?

Lifelo ezali nini? Ezali esika ya kozika na mɔtɔ libela na libela?

Bato ya mabe bakendaka na lifelo? Ezali lifuti ya lisumu? Tángá biyano ya Biblia na mituna yango.

Banani bakendaka na lifelo?

Bato ya malamu mpe bakoki kokende na lifelo? Moto akoki kolongwa na lifelo? Lifelo ekozala libela na libela? Biblia epesi biyano na mituna yango.

Laki ya mɔtɔ ezali nini? Ezali ndenge moko na lifelo to na Gehena?

Yesu azali na “bafungola ya lifelo,” kasi azali mpe na fungola ya laki ya mɔtɔ?

Liteya ya epongelo ezali na Biblia?

Esika liteya yango eutá ekoki kokamwisa yo.

Banyama ekendeke na likoló?

Kutu, ezali ata na esika moko te oyo Biblia elobi ete na likoló ezalaka na esika mpo na banyama lokola mbwa to nyau.

Elikya mpo na bakufi

Lisekwa ezali nini?

Okoki kokamwa ntango okoyeba soki banani bakozonga na bomoi.