Lakisá makambo oyo ezali na kati

Liteya ya epongelo ezali na Biblia?

Liteya ya epongelo ezali na Biblia?

Eyano ya Biblia

 Te, liteya wana ezali na Biblia te. Liloba “epongelo” ezali na Biblia te, Biblia eteyaka mpe te ete milimo ya bato oyo bakufi ekendaka kopɛtolama na epongelo. a Tótalela oyo Biblia eteyaka na oyo etali lisumu mpe liwa mpe ndenge mateya yango eyokani te na liteya ya epongelo.

  •   Komonisa kondima na makila ya Yesu nde epɛtolaka moto na masumu, kasi epongelo te. Biblia elobi ete “makila na Yesu, Mwana na [Nzambe] makopɛtɔlaka biso na masumu yɔnsɔ” mpe ete “Yesu Klisto . . . asukoli biso na masumu na biso na makila na ye.” (1 Yoane 1:7; Emoniseli 1:5, Biblia haut fleuve) Yesu apesaki “bomɔi na ye lokola lisiko mpɔ na [bato] mingi” mpo afuta masumu na bango.​—Matai 20:28, Biblia haut fleuve.

  •   Moto oyo akufi ayebaka eloko te. “Bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ.” (Mosakoli 9:5, Biblia haut fleuve) Lokola moto oyo akufi akoki koyoka eloko te, akoki mpe te kopɛtolama na mɔtɔ ya epongelo.

  •   Moto akoki kozwa etumbu te nsima ya liwa. Biblia elobi ete “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa” mpe “moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” (Baroma 6:7, 23) Etumbu oyo ekoki na lisumu ezali Liwa.

a Mpo na liteya yango ya epongelo, buku moko (Orpheus: A General History of Religions) elobi ete “liloba yango ezali te na Baevanzile.” Buku mosusu mpe (New Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Nsima ya kotalela yango malamumalamu, liteya ya epongelo oyo lingomba ya Katolike eteyaka eutá na mimeseno ya bato, kasi na Makomami Mosantu te.”​—Ebimeli ya mibale, Volimi 11, lokasa 825.

b Talá the New Catholic Encyclopedia, Ebimeli ya mibale, Volimi 11, lokasa 824.