Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mokolo ya liwa na biso etángamá?

Mokolo ya liwa na biso etángamá?

Eyano ya Biblia

 Te. Mokolo ya liwa na biso etángamá te. Biblia elobi te ete bomoi na biso etángamá; elobi nde ete bato bakufaka mpo na “makambo oyo ekanami te.”​—Mosakoli 9:11.

Kasi mpo na nini Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kokufa”?

 Ya solo, Mosakoli 3:2 elobi ete ezali na “ntango ya kobotama mpe ntango ya kokufa; ntango ya kolona mpe ntango ya kopikola eloko oyo elonamaki.” Kasi, bavɛrsɛ mosusu ya mokapo yango emonisi ete na esika wana, Biblia elobeli nde makambo oyo esalemaka na bomoi ya moto. (Mosakoli 3:1-8) Nzambe atyá te mokolo oyo mokomoko na biso akokufa, ndenge kaka atindaka te mosali-bilanga alona na eleko boye to boye. Bavɛrsɛ wana emonisi nde ete tosengeli te komipesa mobimba na makambo ya mokili mpe kobosana Mozalisi na biso.​—Mosakoli 3:11; 12:1, 13.

Tokoki kokómisa bomoi na biso molai

 Ata soki mokolo ya liwa eyebanaka te, tokoki kokómisa bomoi na biso molai soki tozali kozwa bikateli ya malamu. Biblia elobi: “Mobeko ya moto ya bwanya ezali liziba ya bomoi, mpo na kolongola moto na mitambo ya liwa.” (Masese 13:14) Ndenge moko mpe, Moize ayebisaki Bayisraele ete bakoki kozala na ‘bomoi molai’ soki batosi mibeko ya Nzambe. (Kolimbola Mibeko 6:2) Nzokande, tokoki kokómisa bomoi na biso mokuse kozanga ete tóyeba soki tozali kosala makambo ya mabe to ya bozoba.​—Mosakoli 7:17.

 Kasi, ata soki tozali na bwanya to ekɛngɛ ndenge nini, tokoki kokima liwa te. (Baroma 5:12) Kasi makambo ekobongwana, mpo Biblia elaki ete ekozala na ntango oyo “liwa ekozala lisusu te.”​—Emoniseli 21:4.