Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banyama ekendeke na likoló?

Banyama ekendeke na likoló?

Eyano ya Biblia

 Biblia eteyaka ete na bikelamu nyonso oyo ezali awa na mabele, kaka mwa ndambo ya bato nde bakokende na likoló. (Emoniseli 14:1, 3) Bakokende kuna mpo na koyangela lokola bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Yesu. (Luka 22:28-30; Emoniseli 5:9, 10) Ebele ya bato mosusu bakosekwa mpo bázala na bomoi na paradiso awa na mabele.​—Nzembo 37:11, 29.

 Ezali ata na esika moko te oyo Biblia elobi ete na likoló ezalaka na esika mpo na banyama lokola mbwa to nyau mpe ezali mpamba te soki Biblia elobeli yango te. Nyama ekoki te kokokisa masɛngami ya Nzambe “mpo na kokende na likoló.” (Baebre 3:1) Na ndakisa, makambo lokola kozwa boyebi, komonisa kondima, mpe kotosa mibeko ya Nzambe. (Matai 19:17; Yoane 3:16; 17:3) Kaka bato nde bakelamaki na elikya ya kozala na bomoi ya seko.​—Ebandeli 2:16, 17; 3:22, 23.

 Mpo na kokende na likoló, bikelamu ya mabele basengeli naino kosekwisama liboso. (1 Bakorinti 15:42) Biblia elobeli mwa bato oyo basekwaki. (1 Bakonzi 17:17-24; 2 Bakonzi 4:32-37; 13:20, 21; Luka 7:11-15; 8:41, 42, 49-56; Yoane 11:38-44; Misala 9:36-42; 20:7-12) Bango nyonso bazalaki bato, kasi banyama te.

 Nyama ezalaka na molimo?

 Te. Biblia elobi ete ezala banyama to bato bango nyonso bazali milimo. (Mitángo 31:28) Ntango Nzambe akelaki Adama, moto ya liboso, apesaki ye molimo te kasi “akómaki [nde] molimo ya bomoi.” (Ebandeli 2:7) Molimo esangisi biloko mibale: “putulu ya mabele” mpe “mpema ya bomoi.”

 Milimo ekoki kokufa?

 Ɛɛ, Bible eteyaka ete molimo ekoki kokufa. (Balevi 21:11; Ezekiele 18:20) Ntango banyama mpe bato bakufaka, bazongaka na putulu ya mabele. (Mosakoli 3:19, 20) Na maloba mosusu, batiki kozala na bomoi. a

 Nyama esalaka lisumu?

 Te. Kosala lisumu elimboli kokanisa, koyoka to kosala likambo moko oyo ebuki mibeko ya Nzambe. Mpo ekelamu moko esala lisumu, esɛngi ezala na likoki ya kozwa bikateli na makambo etali bizaleli malamu, nzokande nyama ezalaka na likoki wana te. Na boumeli ya bomoi na yango, nyama esalelaka ntango nyonso makambo na kolanda mayele ya lɔɔmbi to instinct. (2 Petro 2:12) Soki bomoi ekómi na nsuka, nyama ekufaka atako esalaka lisumu te.

 Konyokola nyama ezali mabe?

 Ɛɛ. Nzambe apesaki bato bokonzi likoló ya banyama kasi apesaki bango te lotomo ya konyokola yango. (Ebandeli 1:28; Nzembo 8:6-8) Nzambe akipaka nyama mokomoko; ata mpe bandɛkɛ ya mike mpenza. (Yona 4:11; Matai 10:29) Asɛngaki basaleli na ye básalela banyama makambo na boboto.​—Kobima 23:12; Kolimbola Mibeko 25:4; Masese 12:10.

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 6 ya buku Makambo oyo Biblia eteyaka.