Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe alingi nasala nini na bomoi na ngai?

Nzambe alingi nasala nini na bomoi na ngai?

Eyano ya Biblia

 Nzambe alingaka ete oyeba ye ndenge azali mpenza, okóma moninga na ye, olinga ye, mpe osalela ye na motema na yo mobimba. (Matai 22:37, 38; Yakobo 4:8) Okoki koyeba ndenge ya kosala mokano ya Nzambe soki otaleli bomoi mpe mateya ya Yesu. (Yoane 7:16, 17) Yesu asukaki kaka na kolobela mokano ya Nzambe te, asalaki yango mpe na bomoi na ye. Kutu, alobaki ete azalaki na bomoi nde “mpo na kosala, mokano na [ye moko] te, kasi mokano ya moto oyo atindaki [ye].”​—Yoane 6:38.

Esengeli Nzambe apesa ngai vision, to namona emonaneli, nalɔta ndɔtɔ moko boye, mpo nayeba mokano ya Nzambe mpo na ngai?

 Te, mpo Biblia ezali na nsango oyo Nzambe atindelá bato. Yango nde ekosalisa yo ozala na “nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Nzambe alingi osalela ‘makoki na yo ya kokanisa’ ntango ozali kotánga Biblia mpo oyeba mokano na ye mpo na yo.​—Baroma 12:1, 2; Baefese 5:17.

Nakokoka mpenza kosala mokano ya Nzambe?

 Ɛɛ, okokoka, mpo Biblia elobi ete “mibeko [ya Nzambe] ezali penza pasi mingi té po na biso.” (1 Yoane 5:3, Bible na lingala ya lelo oyo) Yango elingi koloba te ete kotosa mibeko ya Nzambe ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ. Kasi, matomba oyo okozwa eleki mosika milende oyo okosala mpo na kotosa mibeko ya Nzambe. Yesu ye moko alobaki: “Esengo . . . na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!”​—Luka 11:28.