Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batɛlɛmaki mpo na kopesa lisalisi

Batɛlɛmaki mpo na kopesa lisalisi

 Bob azalaki kotambwisa motuka na vitɛsi makasi (100 km/hr) na mokolo ya malili mpe mopɛpɛ makasi na etúká ya Alberta, na Canada, ntango pinɛ ya motuka yango na lobɔkɔ ya mwasi etɔbɔkaki na mbalakaka. Na ebandeli, Bob ayebaki te nini esalemaki mpe amonaki malamu akoba kotambwisa motuka yango na ntaka ya kilomɛtrɛ mitano lisusu mpo akóma na ndako na ye.

 Na mokanda oyo Bob atindaki na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki na kartye na ye, alobelaki oyo ekómelaki ye na nsima. Akomaki boye: “Bilenge mitano oyo bazalaki na kati ya motuka mosusu batambwisaki motuka na bango pene na oyo ya ngai mpe bakitisaki bavitre ya motuka mpo na koyebisa ngai ete pinɛ ya motuka na ngai etɔbɔkaki.” Totɛlɛmisaki mituka nyonso mibale pembeni mpe basɛngaki bálongola pinɛ yango mpe bátyela ngai pinɛ mosusu. Nayebaki kutu te soki nazalaki na pinɛ mosusu to ebende ya kotombola motuka mpo na kotya pinɛ mosusu. Ntango nafandaki na kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ pembeni ya balabala, batalaki na nsima ya motuka na ngai, bamonaki pinɛ mosusu ná ebende oyo etombolaka motuka, balongolaki pinɛ yango mpe batyelaki ngai mosusu. Malili ezalaki makasi mpenza mpe banɛjɛ ezalaki kokwea. Atako balataki kitoko, batyelaki ngai pinɛ mosusu mpe yango esalisaki ngai natambwisa lisusu motuka na ngai. Ngai moko nalingaki kokoka kosala bongo te.

 “Matondi na bilenge mitano oyo basalisaki ngai. Bayaki na esika yango mpo bazalaki kokende na bandako ya bato mpo na kosakola nsango malamu. Nandimi ete bana yango basalelaka mpenza makambo oyo bateyaka. Soki básalisaka ngai te, elingaki kozala mpasi mpo na ngai mpe nazali na botɔndi mpo na oyo basalelaki ngai. Namoni, bazali lokola baanzelu oyo Nzambe atindelaki ngai mokolo wana mpo na kosalisa ngai!”