Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yebisá bango ete olingaka bango

Yebisá bango ete olingaka bango

 Ong-Li azali Motatoli ya Yehova oyo afandaka na Bulgarie. Azalaki koyekola na mwasi moko Biblia na nkombo Zlatka, oyo mobali na ye azalaki koyekola Biblia te. Ong-Li alobi boye: “Ntango tosololaki likambo etali bomoi ya libota, namonisaki ye ntina ya koyebisaka molongani na biso mpe bana na biso ete tolingaka bango. Zlatka atalaki ngai na miso ya mawa; alobaki ete alobá naino te na mobali na ye to na mwana na bango ya mbula libwa ete alingaka bango!”

 Zlatka alobaki: “Nakoki kosalela bango eloko nyonso, kasi nde mwaye ya koloba na bango maloba wana ezali te.” Mpe abakisaki boye: “Mama na ngai alobá na ngai naino te ete alingaka ngai mpe nkɔkɔ na ngai ya mwasi alobá mpe te ete alingaka mama na ngai.” Ong-Li alakisaki Zlatka ete Yehova alobaki na mongongo makasi ete alingaka Yesu. (Matai 3:17) Alendisaki Zlatka abondela Yehova mpo na likambo yango mpe amityela mokano ya koyebisa mobali na ye mpe mwana na bango ete alingaka bango.

 Ong-Li alobi: “Mikolo mibale na nsima, Zlatka ayebisaki ngai na esengo nyonso ete abondelaki Yehova asalisa ye. Ntango mobali na ye azongaki ndako, ayebisaki ye ete ayekolaki na Biblia ete ezali na ntina mpenza mwasi amemya mpe alinga mobali na ye. Nsima ya kopema mwa moke, ayebisaki mobali na ye alingaka ye mpenza! Ntango mwana na bango azongaki na ndako, ayambaki ye mpe alobaki na ye ete alingaka ye! Zlatka ayebisaki ngai boye: ‘Sikoyo namiyoki malamu. Bambula oyo nyonso nazalaki kokoka te kobimisa ndenge namiyokaka na motema, kasi na lisalisi ya Yehova, nsukansuka nalongi koyebisa bato ya libota na ngai ete nalingaka bango.’”

Ong-Li azali kokoba koluka bato ya kartye na ye oyo bakolinga koyekola Biblia

 Ong-Li alobi lisusu boye: “Pɔsɔ moko na nsima, nakutanaki na mobali ya Zlatka mpe ayebisaki ngai boye: ‘Bato mingi bazalaki koyebisa ngai ete Zlatka asengeli te koyekola ná bino Biblia, kasi na ntembe te boyekoli na ye ya Biblia ezali mpenza na litomba mpo na libota na biso. Sikoyo tokómi koyokana malamu mingi koleka mpe tozali na esengo.’”