Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kampanye moko oyo ebongisamaki malamu eboti mbuma

Kampanye moko oyo ebongisamaki malamu eboti mbuma

María Isabel, elenge moko oyo azali mosakoli ya molende, afandaka na engumba San Bernardo, na ekólo Chili, na Amerika ya Sudi. Ye ná libota na ye bazali Ba-Mapuche, ekólo moko na Chili. Libota na bango mobimba ezalaki kosala milende elongo na bandeko mosusu mpo na kofungola lisangá oyo elobaka Mapudungun, monɔkɔ ya Ba-Mapuche.

Ntango liyebisi epesamaki ete Ekaniseli ya liwa ya Kristo ekosalema mpe na monɔkɔ ya Mapudungun mpe ete babimisaki nkasa ya libyangi 2 000 oyo esengelaki kokabolama na monɔkɔ wana, yango etindaki María Isabel akanisa mingi. Akokaki kosala nini mpo ye mpe apesa mabɔkɔ na mosala yango? Amikundolaki masolo mosusu ya bilenge Batatoli oyo bazwaki matomba ntango bapesaki litatoli epai ya bana-kelasi mpe balakisi na bango. Asololaki ná baboti na ye mpo na likambo yango, mpe bazwaki ekateli ete María Isabel akanisa ndenge oyo akoki kosala mpo na kokabola nkasa ya libyangi na eteyelo na bango. Likanisi nini María azwaki?

Liboso, María Isabel asɛngaki bakonzi ya eteyelo nzela mpo atya lokasa ya libyangi na porte monene ya lopango ya eteyelo. Bapesaki ye nzela ya kosala yango mpe bakumisaki ye mpo na likanisi oyo azwaki. Mokolo moko na ntɔngɔ, liboso bana-kelasi bákɔta na kelasi, mokambi ya eteyelo asalelaki mikro mpo na kopesa liyebisi oyo etali lokasa yango ya libyangi!

Na nsima, María Isabel asɛngaki nzela akɔta na bakelasi nyonso. Nsima ya kozwa ndingisa epai ya balakisi, atunaki na kelasi mokomoko soki ezali na bana-kelasi oyo bazali Ba-Mapuche. Alobi ete: “Nakanisaki ete mbala mosusu na eteyelo mobimba ekozala kaka na bana-kelasi 10 to 15 oyo bazali Ba-Mapuche; nzokande bazalaki mingi koleka. Nsukansuka nakabolaki nkasa ya libyangi 150!”

“AKANISAKI ETE MOKÓLÓ MOKO NDE AZALI KOKABOLA YANGO”

Mwasi moko oyo amonaki lokasa ya libyangi na porte monene ya eteyelo atunaki soki akoki kosolola na nani mpo na likita yango. Akamwaki mingi ntango balakisaki ye elenge mwasi moko ya mbula 10! Na mwa kosɛka, María Isabel alobi ete: “Akanisaki ete mokóló moko nde azali kokabola yango.” Nsima ya kopesa ye lokasa ya libyangi mpe kolimbolela ye yango na mokuse, María Isabel asɛngaki mwasi yango adrɛsi mpo ye ná baboti na ye bákende kotala ye mpo na koyebisa ye makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Bandeko 20 oyo basakolaka na teritware ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Mapudungun basepelaki mingi komona mwasi yango elongo na Ba-Mapuche mosusu 26 bayei na Ekaniseli. Lelo oyo, etuluku yango ekóma lisangá moko oyo ezali kokola malamu!

Ata soki ozali na mbula boni, yo mpe okoki kozwa likanisi ya kobengisa bana-kelasi na bino to bato oyo osalaka na bango na Ekaniseli, na diskur ya bato nyonso, to na liyangani ya etúká. Mpo na yango, okoki kosala bolukiluki na mikanda na biso mpo na kozwa masolo mosusu oyo ekosalisa yo oyeba ndenge oyo okoki kokokisa mokano yango. Longola yango, bondelá Yehova apesa yo elimo santu na ye mpo esalisa yo ozwa mpiko ya koyebisa basusu makambo oyo etali ye. (Luka 11:13) Soki osali bongo, yo mpe okosepela mingi mpe okolendisama mpenza na komona ete milende oyo osalaki eboti mbuma.