Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bakobaki kosakola na eleko ya maladi mabe

Bakobaki kosakola na eleko ya maladi mabe

 Na eleko ya maladi mabe ya Coronavirus, Batatoli ya Yehova babongolaki mayele na bango ya koyebisa basusu nsango ya kobɔndisa oyo ezali na Biblia. Na esika bámipesa na mosala ya kosakola na bisika ya bato mingi to kokende na bandako ya bato, bazalaki kosakwela bato na nzela ya kokoma mikanda mpe na telefone. * Bato mingi bazali kosepela na milende na bango, mpe yango emonisi polele ete Yehova azali kopambola milende na bango. (Masese 16:3, 4) Tótalela mwa makambo oyo Batatoli mosusu bakutanaki na yango na ekólo moko.

 Liboso maladi ya Coronavirus ebanda, Helen azalaki kokende kotala mbala na mbala mwasi moko mpe kosɛnga ye ete ayekola Biblia. Mwasi yango azalaki ntango nyonso koboya. Nzokande, liboso ete bato bákóma kotikala na bandako na bango mpo na maladi ya Coronavirus, Helen apesaki ye Biblia mpe buku Makambo oyo Biblia eteyaka. Na eleko ya maladi mabe yango, Helen asɛngaki lisusu mwasi yango báyekola Biblia, mpe ayebisaki ye ete bakobanda koyekola na nzela ya telefone. Na mbala oyo, mwasi yango andimaki koyekola. Asepelaki mpenza na boyekoli mpe eumelaki te asɛngaki Helen ayekolaka na ye mokolo nyonso! Mwasi yango abandaki mpe koyangana mbala na mbala na makita na nzela ya telefone. Longola yango, azalaki kaka te kosalela mateya ya Biblia, kasi azalaki mpe kolobela basusu makambo oyo azali koyekola.

 Lokola mosala ya kosakola ezali na kati ya losambo na bango, Batatoli ya Yehova na lisangá moko bakomelaki bapolisi mikanda mpo na kopesa bango matɔndi na mosala na bango ya malamu. Bapolisi bakamwaki komona mikanda yango. Mokonzi moko ya bapolisi alobaki na Jefferson, nkulutu moko ya lisangá yango boye: “Nazalaki kokanisa ete Batatoli ya Yehova balingaka bapolisi te.” Jefferson asalisaki ye alongola makanisi wana ya mabe. Bapolisi basepelaki mingi na mikanda yango mpe batyaki yango na porte ya biro ya bapolisi. Mokonzi mosusu alobaki boye: “Yango ekoki kosalisa basusu mpo bázala na makanisi malamu mpo na Batatoli ya Yehova.”

 Edna ná Ednalyn bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza. Lokola bazali na Internet te na ndako na bango, * bakokaki te kokɔta makita na nzela ya video. Na yango babengaki moninga na bango moko ya kartye ya mwasi oyo azali Motatoli te na telefone mpo na kosɛnga ye soki bakoki kosalela Wi-Fi na ye mpo bálanda makita mpe bakobanda kopesa mwa mbongo mpo na yango. Mwasi yango na boboto nyonso andimaki básalela yango ofele. Ntango Edna ná Ednalyn basɛngaki ye akɔta na makita, andimaki. Sikoyo, mwasi yango, mwana na ye moko mpe bankɔkɔ na ye mibale ya basi bazali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe koyangana mbala na mbala na makita.

 Batatoli ya Yehova ya esika yango babengisaki bato ya kartye, baninga na bango ya mosala mpe bato mosusu na diskur ya bato nyonso oyo esalemaki na nzela ya video. Ellaine, oyo asalaka na lopitalo moko na mboka yango, azalaki moto ya liboso oyo azalaki kokakatana mpo na kobengisa baninga na ye ya mosala. Akanisaki ete mbala mosusu minganga mosusu bazalaki kokanisela Batatoli ya Yehova mabe. Nzokande, azalaki kokomela minganga yango mesaje mpo na kobengisa bango. Ellaine azalaki kokakatana kobengisa mobali moko ná mwasi na ye, oyo bazalaki mpe minganga. Nsima ya kokanisa mpe kobondela mpo na yango, akomelaki bango mesaje mpo na kobengisa bango na makita. Mwasi yango atunaki ye boye: “Olingi ngai mpe nakóma na lingomba na yo?” Ellaine ayebisaki ye ete makita ezalaka mpo na moto nyonso, kaka mpo na Batatoli ya Yehova te. Mokolo oyo elandaki, Ellaine akamwaki ntango babalani yango bakɔtaki na makita liboso na nzela ya video! Alobi boye: “Liboso makita esila, nazwaki mesaje ya mwasi yango, akomaki boye: ‘Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Ezalaki kitoko. Nasepelaki na yango. Mersi ndenge obengisaki ngai.’”

Ellaine

 Ellaine abengisaki minganga 20 na makita mpe asepelaki ntango amonaki 16 kati na bango bayanganaki. Mpo na kozongela maloba ya ntoma Paulo, Ellaine alobi boye: “Nazali na esengo ndenge ‘nazwaki mpiko’ mpo na koyebisa baninga ngai ya mosala ‘nsango malamu ya Nzambe.’”​—1 Batesaloniki 2:2.

 Maladi mabe oyo ya Coronavirus, ememeli moto nyonso mpasi. Kasi Batatoli ya Yehova ya esanga oyo mpe ya bamboka mosusu, balongi kobatela esengo na bango mpe makanisi malamu ntango bazalaki kosala nyonso oyo bakoki mpo na kobɔndisa mpe kosalisa basusu.​—Misala 20:35.

^ Batatoli ya Yehova bazali kosakola na kolanda mibeko ya kobomba makambo etali moto ye moko.

^ Babongisi-nzela bazali bakristo oyo balekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola.