Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bakanisaka nini na likambo etali koboma libala?

Batatoli ya Yehova bakanisaka nini na likambo etali koboma libala?

 Tolandaka likanisi ya Biblia na oyo etali kobala mpe koboma libala. Nzambe abongisaki libala kati na mwasi na mobali mpo eumela seko. Likambo kaka moko oyo Biblia endimi mpo na koboma libala ezali ekobo.​—Matai 19:5, 6, 9.

Batatoli ya Yehova basalisaka mabala oyo ezali na mitungisi?

 Ɛɛ, na ndenge mingi:

  •   Mikanda. Mbala mingi mikanda na biso ezalaka na masolo oyo ekoki kobongisa libala, ata mabala oyo elikya ya kobonga ezali lisusu te. Na ndakisa, talá masolo “Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala,” “Ndenge ya kolimbisa” mpe “Kotyelana lisusu motema.”

  •   Makita. Tolobelaka batoli ya Biblia oyo etali libala na makita na biso, na mayangani ya mike mpe ya minene.

  •   Bankulutu. Bankulutu ya lisangá basalisaka babalani oyo bazali na mikakatano, babendaka likebi na bango na bavɛrsɛ lokola Baefese 5:22-25.

Bankulutu bakoki kondima ete Motatoli moko aboma libala?

 Te. Ata soki bakei kosalisa babalani oyo bazali na mikakatano ya libala, bazali na ndingisa te ya koyebisa bango báboma libala. (Bagalatia 6:5) Kasi, soki moto aluki koboma libala na ndenge Biblia epesi nzela te akozwa mikumba na lisangá te mpe asengeli kobala lisusu te.​—1 Timote 3:1, 5, 12.

Ndenge nini Batatoli batalelaka kokabwana?

 Biblia elendisaka babalani báfanda esika moko ata ntango makambo ezali kotambola malamu te. (1 Bakorinti 7:10-16) Makambo mosusu ekoki kobonga soki bazali kobondela na motema mobimba, kosalela batoli ya Biblia mpe komoniselana bolingo.​—1 Bakorinti 13:4-8; Bagalatia 5:22.

 Atako bongo, na makambo mosusu, na ndakisa oyo elandi, bakristo mosusu bazwaki ekateli ya kokabwana na balongani na bango:

  •   Koboya na nko nyonso kokokisa bamposa ya libota.​—1 Timote 5:8.

  •   Kobɛta to konyokola.​—Nzembo 11:5.

  •   Koluka kobebisa boyokani ya moto na Nzambe. Na ndakisa, molongani moko akoki koluka kotinda moninga na makasi abuka mibeko ya Nzambe, molongani oyo bazali kotinda na makasi akoki komona ete kokabwana nde ekateli ya malamu mpo na “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”​—Misala 5:29.