Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia epesi nzela ya koboma libala?

Biblia epesi nzela ya koboma libala?

Eyano ya Biblia

 Biblia epesi nzela ya koboma libala te. Kasi, Yesu amonaki ete ezali na likambo kaka moko oyo ekoki kosala ete libala ekufa; alobaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite [elingi koloba kosangisa nzoto na moto mosusu] te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”​—Matai 19:9.

 Nzambe ayinaka bato oyo babomaka libala na makanisi mabe. Ye moko akosambisa baoyo babomaka libala mpo na makambo ezangá ntina, mingimingi na likanisi ya kozwa molongani mosusu.​—Malaki 2:13-16; Marko 10:9.