Lakisá makambo oyo ezali na kati

Sekele mpo na libota ya esengo

Kotyelana lisusu motema

Kotyelana lisusu motema

Steve *: “Nandimaki te ete Jodi akoki kosala ekobo. Nakokaki lisusu kotyela ye motema te. Nazangi maloba mpo na komonisa ndenge oyo ezalaki mpasi mpo nalimbisa ye.”

Jodi: “Nayebaki mpo na nini Steve akokaki lisusu kotyela ngai motema te. Esɛngaki bambula ebele mpo namonisa ete nayokaki mpasi mpo na mabe oyo nasalaki ye.”

BIBLIA elobi ete moto oyo molongani na ye asali ekobo akoki kopona koboma libala to kolimbisa. * (Matai 19:9) Steve, oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo aboyaki koboma libala. Ye ná mwasi na ye Jodi bazwaki ekateli ya kobikisa libala na bango. Kasi, eumelaki te, bayaki komona ete, ezalaki kosɛnga kaka te kofanda elongo, kasi mpe kosala makambo mingi lisusu. Mpo na nini? Mpamba te, ndenge bango moko balobi yango, ekobo oyo Jodi asalaki esalaki ete bátika kotyelana motema. Lokola kotyelana motema ezalaka na ntina mingi mpo libala ezala na esengo, bango mibale basengelaki kosala makasi mpo na kozongiselana konfianse.

Soki yo ná molongani na yo bozali koluka kobikisa libala na bino nsima ya likambo moko monene lokola ekobo, na ntembe te, bozali na mokakatano moko monene. Nsima ya koyeba likambo yango, basanza ya liboso ekoki kozala mpasi mingi. Kasi, bokoki kolonga! Nini bokoki kosala mpo bótyelana lisusu motema? Batoli ya bwanya oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa bino. Tótalela batoli minei oyo elandi.

1 Bólobanaka solo.

Ntoma Paulo akomaki boye: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobaka solo.” (Baefese 4:25) Lokuta, kobomba makambo mosusu, mpe kokanga monɔkɔ, esalaka ete bato bátyelana motema te. Yango wana, bosengeli kolobanaka makambo polele mpe na bosembo.

Na ebandeli, ekozala mpasi mpo yo ná molongani na yo bólobela likambo ya ekobo. Atako bongo, nsukansuka ekosɛnga kaka kolobela na bosembo nyonso ndenge likambo yango esalemaki. Bokoki komona malamu bólobela te likambo mokomoko, kasi, koboya mpe kolobela likambo yango ezali bwanya te. Jodi, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki komona ete ezalaki mpasi mingi mpe nsɔni kolobela likambo yango. Ezalaki likambo moko oyo epesaki ngai mawa mingi mpe nalingaki kaka kobosana yango.” Nzokande, koboya kolobela likambo yango ebimisaki mikakatano. Mpo na nini? Steve alobi boye: “Lokola Jodi azalaki kolinga te tólobela ekobo oyo asalaki, nakómaki kaka kokanisela ye mabe.” Ntango azongisaki makanisi nsima, Jodi, andimaki likambo oyo: “Koboya kolobela likambo yango ná mobali na ngai ezalaki kaka kobebisa makambo.”

Na ntembe te, kosolola likambo nyonso oyo etali ekobo na libala, ezalaka mpasi mingi. Debbie, oyo mobali na ye Paul asalaki ekobo ná sɛkrɛtɛrɛ na ye, alobi boye: “Nazalaki na mituna ebele na motó na ngai. Ebandaki ndenge nini? Mpo na nini asalaki yango? Basololaki makambo nini? Nakómaki kotungisama mingi na makanisi, nakómaki kokanisa likambo yango ntango nyonso mpe wana bapɔsɔ ezalaki koleka, nakómaki kutu kotuna mituna mingi lisusu.” Paul alobi boye: “Ezali ya solo ete na bantango mosusu, masolo ya ngai ná Debbie ezalaki kobimisa matata. Kasi, tozalaki ntango nyonso kosɛngana bolimbisi na nsima. Kosolola polele ndenge wana esalaki ete boyokani na biso ekóma lisusu makasi.”

Ndenge nini bokoki kosala ete matata ebima te ntango bozali kosolola masolo ya ndenge wana? Kobosana te ete mokano na bino ya libosoliboso ezali ya koyeba nini ememaki na likambo yango mpe koluka kobongisa libala na bino, kasi te ya kopesa molongani na yo etumbu. Na ndakisa, ekobo oyo Chul Soo asalaki etindaki ye ná mwasi na ye Mi Young bátalela lisusu boyokani na bango. Chul Soo alobi boye: “Nayaki komona ete namipesaki mingi kaka na makambo na ngai moko. Nazalaki mpe komibanzabanza mingi mpo na kosepelisa basusu mpe kokokisa bamposa na bango. Nazalaki kolekisa ntango na ngai mingi mpo na bango mpe kotyela bango likebi mingi. Yango esalaki ete nalekisaka ntango moke ná mwasi na ngai.” Koyeba makambo wana nyonso nde esalisaki Chul Soo ná Mi Young básala mbongwana oyo, na nsima, esalisaki bango bákóma na boyokani makasi na libala na bango.

MEKÁ KOSALA BOYE: Soki yo nde osali ekobo, koluka komilongisa te mpe kopesa molongani na yo foti te. Memá mokumba ya likambo oyo osali mpe ya mpasi oyo oyokisi moninga. Soki molongani na yo nde asali ekobo, kogangela ye te mpe koloba na ye mabe te. Koboya maloba ya ndenge wana ekosalisa molongani na yo akoba kosolola na yo polele.​—Baefese 4:32.

2 Bópesana mabɔkɔ.

Biblia elobi ete “bato mibale baleki moto moko.” Mpo na nini? “Mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi. Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.” (Mosakoli 4:9, 10) Etinda wana ezali mpenza solo ntango bozali kosala makasi mpo na koluka kotyelana lisusu motema.

Soki yo ná molongani na yo bopesani mabɔkɔ, bokoki kolonga kotyelana lisusu motema na libala na bino. Kasi, bino mibale bosengeli koyokana mpo na kobikisa libala na bino. Soki oluki kobongisa likambo yango yo moko, okomilukela makambo mosusu. Bosengeli kosala na bomoko.

Yango nde Steve ná Jodi basalaki. Jodi alobi boye: “Ezwaki ntango mingi, kasi ngai ná Steve topesanaki mabɔkɔ mpo tókóma na boyokani makasi na libala na biso. Nazwaki ekateli ete nakopesa Steve mpasi ya ndenge wana lisusu te. Atako Steve ayokaki mpasi mingi na motema, azwaki ekateli ya kobikisa libala na biso. Mikolo nyonso, nazalaki koluka ndenge ya komonisa Steve ete nazali sembo epai na ye mpe ye akobaki ntango nyonso komonisa ete alingaka ngai. Nakozala ntango nyonso na botɔndi epai na ye mpo na yango.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Yo ná molongani na yo bózwa ekateli ya kosala elongo mpo bózongela kotyelana lisusu motema na libala na bino.

3 Bólongola bomoto ya kala, bólata bomoto ya sika.

Nsima ya kokebisa bato oyo bazalaki koyoka ye na likambo ya ekobo, Yesu apesaki toli oyo: “Soki liso na yo ya mobali ezali kobɛtisa yo libaku, pikolá yango mpe bwaká yango mosika na yo.” (Matai 5:27-29) Soki yo nde osalaki ekobo, meká naino kokanisa na makambo to bizaleli oyo okoki kotika mpo na kobongisa libala na bino.

Ezali polele ete osengeli kokata boyokani nyonso ná moto oyo osalaki na ye ekobo. * (Masese 6:32; 1 Bakorinti 15:33) Paul, oyo tolobelaki liboso, abongolaki programɛ na ye ya mosala mpe nimero na ye ya telefone mpo asololaka lisusu te na mwasi wana mosusu. Ata bongo, milende wana nyonso ekataki te boyokani nyonso. Paul asalaki nyonso mpo mwasi na ye atyela ye lisusu motema, yango wana alongwaki na mosala yango. Atikaki mpe kosalela telefone na ye mpe akómaki kosalela kaka oyo ya mwasi na ye. Milende wana nyonso ebimisaki matomba? Mwasi na ye Debbie alobi boye: “Atako eleki sikoyo mbula motoba, ntango mosusu namitunaka soki akomeka lisusu koluka kokutana na mwasi wana. Kasi sikoyo, nandimi ete Paul akokwea lisusu te na motambo wana.”

Soki yo nde molongani oyo okweaki na ekobo, osengeli mpe kobongola makambo mosusu na bomoto na yo. Na ndakisa, ekoki kozala ete ozalaka selesele na bato mosusu, to oyokaka mposa ya kolingana ná moto mosusu. Soki ezali bongo, ‘longolá bomoto ya kala elongo na misala na yango.’ Longolá bomoto ya kala mpe latá bomoto ya sika, oyo ekosala ete molongani na yo atyela yo lisusu motema. (Bakolose 3:9, 10) Ndenge oyo babɔkɔlá yo esalaka ete ozala na mokakatano ya komonisela molongani na yo bolingo? Ata soki na ebandeli ekoki kozala mpasi, moniseláká molongani na yo bolingo ntango nyonso mpo amona mpenza ete olingaka ye. Steve alobi boye: “Mbala mingi, Jodi azalaki kosimba ngai na lobɔkɔ mpo na komonisa ete alingaka ngai, mpe azalaki koloba na ngai mbala na mbala ete ‘nalingaka yo.’”

Mpo na mwa ntango, ekoki kozala malamu oyebisaka molongani na yo makambo nyonso oyo osalaka mokolo na mokolo. Mi Young, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Chul Soo azwaki mokano ya koyebisaka ngai likambo nyonso oyo akutani na yango mokolo na mokolo, ata makambo oyo ezali mpenza na ntina te, mpo na komonisa ngai ete azali te na likambo ya kobombela ngai.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Mokomoko atuna moninga makambo nini ekoki kosalisa mpo bátyelanaka lisusu motema. Bósala liste ya makambo yango, mpe bósalela yango. Lisusu, na makambo oyo bosalaka mokolo na mokolo, bóbakisa makambo mosusu oyo bokoki kosala bino mibale.

4 Yebá ntango nini kozongisa konfianse.

Kowela naino te kokanisa ete ntango ekoki mpo bózongela kofanda ndenge bozalaki liboso, lokola nde makambo nyonso ebongi. Masese 21:5 epesi likebisi oyo: “Moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” Ekoki kozwa ntango, ata mpe bambula, mpo bókóma lisusu kotyelana motema.

Soki yo nde basaleli mabe, osengeli kolekisa naino ntango liboso ya kolimbisa mpenza. Mi Young alobi boye: “Nazalaki kokanisa ete ekoki kosalema te ete mwasi aboya kolimbisa mobali na ye oyo asali ekobo. Nazalaki koyeba te mpo na nini mwasi akokaki kokangela mobali na ye nkanda ntango molai bongo. Kasi, ntango mobali na ngai asalaki ekobo, namonaki mpo na nini ezali mpasi kolimbisa.” Na ntembe te, kolimbisa moto mpe kotyela ye motema eyaka malɛmbɛmalɛmbɛ.

Nzokande, Mosakoli 3:1-3 elobi ete “ntango ya kobikisa” ezali. Na ebandeli, okoki kokanisa ete koboya koyebisa molongani na yo ndenge ozali koyoka na motema eleki malamu. Kasi, kosala bongo ekosalisa yo te otyela lisusu molongani na yo motema. Mpo na kobongisa lisusu boyokani na bino, limbisá molongani na yo, mpe yebisaká ye makambo oyo ozali na yango na motema mpe ndenge oyo ozali koyoka, mpo na komonisa ete olimbisi ye. Lendisá mpe molongani na yo ayebisaka yo makambo oyo epesaka ye esengo to oyo etungisaka ye.

Kokanisa te makambo oyo ekosilikisa yo. Salá nyonso mpo na kobengana yango. (Baefese 4:32) Kokanisa na ndakisa ya Nzambe ekoki kosalisa yo. Ayokaki mpasi mingi na motema ntango basambeli na ye na Yisraele ya kala bapesaki ye mokɔngɔ. Yehova Nzambe amikokanisaki kutu na mobali oyo mwasi na ye asali ekobo. (Yirimia 3:8, 9; 9:2) Kasi, ‘akangaki nkanda mpo na libela te.’ (Yirimia 3:12) Ntango bato na ye bazongelaki ye mpe babongolaki mpenza motema, alimbisaki bango.

Nsukansuka, ntango yo ná molongani na yo bokomona ete bosali mpenza mbongwana oyo esengeli na libala na bino, bokokóma na kimya. Boye, na esika bótya likebi na bino ntango nyonso na koluka kobikisa libala na bino, bokoki nde kotya likebi na mikano mosusu. Ata bongo, bótya ntango moko mpo na kotalaka soki bozali kokende liboso. Bókanisa te ete makambo nyonso ebongi. Bóluka kosilisa matata ya mikemike, mpe bómonisana ete bokotosa ekateli na bino.​—Bagalatia 6:9.

MEKÁ KOSALA BOYE: Na esika ya koluka kozongisa libala na bino ndenge ezalaki liboso, kanisá lokola ozali nde kobongisa boyokani na bino mpo ezonga lisusu ya sika.

Bokoki kolonga

Soki na bantango mosusu ozali komona lokola okolonga te, kanisá likambo oyo: Nzambe azali mobandisi ya libala. (Matai 19:4-6) Na yango, na lisalisi na ye, okoki kosala ete libala na bino elonga. Basi ná mibali nyonso oyo tolobeli na lisolo oyo basalelaki batoli ya Biblia mpe balongaki kobikisa libala na bango.

Ekoki sikoyo mbula koleka 20 bandá libala ya Steve ná Jodi ezwaki mikakatano. Steve alobi boye na mokuse ndenge libala na bango ebikaki: “Ezali nsima ya kobanda koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova nde tosalaki mbongwana makasi. Lisalisi oyo tozwaki ezalaki mpenza na ntina. Tolongaki koyika mpiko na eleko wana ya mpasi.” Jodi alobi boye: “Namonaka ete nazwi mpenza mapamboli ndenge tolongaki koyika mpiko na boumeli ya eleko wana ya mpasi mpenza. Lokola tozali koyekola Biblia elongo, mpe tozali kosala makasi, tozali sikoyo na libala moko ya malamu mpenza.”

^ par. 3 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 5 Mpo na kozwa ekateli ya ndenge wana, talá Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ 1999, lokasa 5 mpe Lamuká! ya 8 Augusto 1995, nkasa 10 mpe 11 (na Lifalanse).

^ par. 17 Soki mpo na ntango moko boye ndenge ya kokata boyokani mosusu ezali te (na ndakisa na esika ya mosala), esengeli kokutana na moto yango kaka na makambo oyo ezali mpenza na ntina. Osengeli kosolola na moto yango kaka na miso ya bato mosusu mpe molongani na yo asengeli koyeba yango.

OMITUNA BOYE . . .

  • Nini etindaki ngai nazwa ekateli ya kobikisa libala na ngai atako molongani na ngai asalaki ekobo?

  • Bizaleli nini ya malamu nakoki komona epai ya molongani na ngai sikoyo?

  • Ndenge nini nazalaki komonisela molongani na ngai bolingo ntango tozalaki bafianse, mpe ndenge nini nakoki kosala yango lisusu?