Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bapanzaka mabota ya bato to basangisaka yango?

Batatoli ya Yehova bapanzaka mabota ya bato to basangisaka yango?

 Biso Batatoli ya Yehova tosalaka makasi tósangisa mabota, ezala ya biso moko, to ya bato mosusu. Totosaka Nzambe, Mobandisi ya libota. (Ebandeli 2:21-24; Baefese 3:14, 15) Na kati ya Biblia, apesi toli oyo esalisi ebele ya bato na mokili mobimba bázala na libala ya esengo mpe ya bomoko.

Ndenge Batatoli ya Yehova basalisaka mabota ezala na bomoko

 Tosalaka makasi tólanda toli ya Biblia mpo esalisaka biso tózala mibali, basi mpe baboti ya malamu mpenza. (Masese 31:10-31; Baefese 5:22–6:4; 1 Timote 5:8) Toli oyo Biblia epesi esalisaka ata mabota oyo bato mosusu bazali Batatoli te. (1 Petro 3:1, 2) Talá ndenge bato oyo bazali Batatoli te, kasi balongani na bango bakómá Batatoli ya Yehova, balobi:

  •   “Na boumeli ya mbula motoba nsima ya libala na biso, tozalaki koswana mingi mpe kosilika mpambampamba. Kasi, ntango Ivete akómaki Motatoli ya Yehova, akómaki na boboto mingi mpe motema molai. Mbongwana oyo asalaki ebikisaki libala na biso.”​—Clauir, na Brésil.

  •   “Natɛmɛlaki mobali na ngai Chansa ntango akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpo nazalaki kokanisa ete bapanzaka mabala ya bato. Na nsima, nayaki komona ete Biblia esalisi libala na biso nde kosalisa.”​—Agness, na Zambie.

 Na mosala ya kosakola, tomonisaka bato ndenge toli ya Biblia ekoki kosalisa bango

Kokɔta na lingomba mosusu ebimisaka matata na libala?

 Ya solo, na bantango mosusu ebimisaka matata. Na ndakisa, lapolo moko oyo kompanyi Sofres esalaki na 1998 emonisaki ete na mabala 20, libala moko ekómaki na mikakatano makasi ntango molongani moko akómaki Motatoli.

 Yesu alobaki ete baoyo balandi mateya na ye bakonyokwama na libota na bango. (Matai 10:32-36) Moto moko ya istware na nkombo Will Durant alobi ete ntango Ampire ya Roma ezalaki koyangela, “bafundaki bakristo ete bapanzaka mabota ya bato.” a Lelo mpe balobaka bongo mpo na Batatoli ya Yehova mosusu. Kasi, yango elingi koloba ete moto oyo azali Motatoli na libota yango nde abimisaka matata?

Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato

 Ntango Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato ezalaki kosambisa likambo oyo bafundaki Batatoli ya Yehova ete bapanzaka mabota ya bato, tribinale yango elobaki ete mbala mingi bato ya libota oyo bazali Batatoli te nde babimisaka matata na ndenge baboyaka “kondima mpe kotikela ndeko na bango bonsomi ya kosala makambo ya lingomba oyo aponi.” Tribinale ebakisaki ete: “Likambo yango esalemaka na mabota nyonso oyo bato nyonso basambelaka lingomba moko te, ezali mpe bongo mpo na Batatoli ya Yehova.” b Kasi, ata ntango bazali koyina bango mpo na lingomba na bango, Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda toli oyo ya Biblia: “Bózongisela moto mabe na mabe te. . . . Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.”​—Baroma 12:17, 18.

Mpo na nini Batatoli ya Yehova babalanaka kaka bango na bango?

 Batatoli ya Yehova balandaka toli ya Biblia oyo esɛngi kobala “na kati ya Nkolo kaka,” elingi koloba kobala moto oyo azali mpe Motatoli ya Yehova. (1 Bakorinti 7:39) Mobeko yango euti na Biblia mpe esalisaka mingi. Na ndakisa na 2010, lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Journal of Marriage and Family) elobaki ete mbala mingi “mwasi ná mobali oyo bazali lingomba moko, bandimaka mateya moko, mpe basalaka makambo ya lingomba yango elongo” bazalaka na boyokani ya malamu mpenza. c

 Batatoli ya Yehova batindaka te bato ya lingomba na bango bákabwana na molongani oyo azali Motatoli te. Biblia elobi boye: “Soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, nzokande mwasi yango andimi kofanda na ye, ndeko yango atika ye te; mpe mwasi oyo azali na mobali oyo azali mondimi te, nzokande mobali yango andimi kofanda na ye, mwasi yango atika mobali na ye te.” (1 Bakorinti 7:12, 13) Batatoli ya Yehova balandaka mobeko yango.

a Talá mokanda Caesar and Christ lokasa 647.

b Talá ekateli oyo ezwamaki na likambo yango na tribinale na mokanda Jehovah’s Witnesses of Moscow and Others v. Russia, nkasa 26-27, paragrafe 111.

c Talá zulunalo Journal of Marriage and Family, Volimi 72, Nimero 4, (08/2010), lokasa 963.