Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Terorisme ekosila mokolo mosusu?

Terorisme ekosila mokolo mosusu?

 Soki terorisme esalemi, okoki komituna boye: ‘Nzambe akipaka biso mpenza? Mpo na nini makambo ya boye ezali kosalema? Terorisme a ekosila mokolo mosusu? Ndenge nini nakoki kolongola kobanga oyo nazali na yango?’ Biblia epesi biyano na mituna yango.

Ndenge nini Nzambe atalelaka terorisme?

 Nzambe ayinaka mobulu mpe terorisme. (Nzembo 11:5; Masese 6:16, 17) Lisusu Yesu, momonisi ya Nzambe, apamelaki bayekoli na ye ntango balukaki kosala mobulu. (Matai 26:50-52) Atako bateroriste balobaka ete basalaka mobulu na nkombo ya Nzambe, Nzambe apesá bango ndingisa ya kosala makambo wana te. Kutu, ayokaka mabondeli na bango te.​—Yisaya 1:15.

 Nzambe akipaka bato nyonso oyo bazali konyokwama, ezala mpe baoyo bakutani na makambo ya terorisme. (Nzembo 31:7; 1 Petro 5:7) Biblia emonisi ete Nzambe akosilisa mobulu nyonso.​—Yisaya 60:18.

Ntina oyo terorisme epalangani lelo oyo

 Biblia emonisi biso ntina oyo terorisme ezali lelo oyo, elobi boye: “Moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Na lisolo ya bomoi ya bato, bato mingi oyo bazalaka na bokonzi basalelaka bokonzi na bango mpo na konyokola basusu. Lokola bato yango banyokwamaka, yango wana basalelaka terorisme mpo na kozongisa mabe na mabe.​—Mosakoli 7:7.

Nsuka ya terorisme

 Nzambe alaki ete akosilisa makambo oyo ebangisaka bato mpe mobulu, mpe akotya kimya awa na mabele. (Yisaya 32:18; Mika 4:3, 4) Akani:

  •   Kolongola makambo oyo esalaka ete terorisme ezala. Nzambe akolongola baguvɛrnema ya bato mpe akotya Bokonzi oyo ekoyangela mabele mobimba. Yesu Mokonzi ya Bokonzi yango, akosalela bato makambo na bosembo, mpe akolongola makambo oyo esalaka ete bato banyokwama mpe mobulu. (Nzembo 72:2, 14) Na ntango yango, moto moko te akosala makambo ya terorisme. Bato “bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:10, 11.

  •   Kolongola makambo nyonso oyo terorisme ebimisá. Nzambe akosilisa makambo nyonso ya mabe oyo terorisme ebimiselá bato, ezala na nzoto to mpe na makanisi. (Yisaya 65:17; Emoniseli 21:3, 4) Alaki kutu kosekwisa bakufi, kozongisa bango na bomoi na mokili moko ya kimya.​—Yoane 5:28, 29.

 Biblia epesi biso bantina oyo esengeli kotinda biso tóndima ete Nzambe akokokisa makambo yango mosika te. Kasi, okoki komituna boye: ‘Mpo na nini Nzambe asilisá terorisme te banda kala?’ Mpo na kozwa eyano, talá video Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?

a “Terorisme” emonisaka mbala mingi kosala to kosalela bato makambo ya mobulu, mingimingi bato oyo bazali basoda te mpo na kobangisa bango mpe kotinda bango básala mbongwana na makambo ya politiki, ya losambo mpe na makambo mosusu ya bomoi. Kasi, bato bakoki koboya kondima ete likambo moko oyo esalemaki ezali terorisme.