Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?

Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?

Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Ayebaki ete makambo ya mabe oyo ezali kosalema na mabele ezali mokano ya Nzambe te mpe kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa makambo yango. Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?

MAKAMBO OYO BOKONZI YA NZAMBE ESÍ ESALI

Na lisolo oyo euti koleka, tolobeli elembo oyo Yesu apesaki. Elembo yango ezali komonisa polele ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló mpe Yesu azali Mokonzi na yango.

Biblia elobi ete ntango Yesu akómaki Mokonzi, abenganaki liboso Satana na bademo na ye na likoló. Sikoyo, basengeli kosalela nguya na bango kaka na mabele, ezali moko ya makambo oyo esali ete makambo ebeba se kobeba banda 1914.​—Emoniseli 12:7, 9.

Atako makambo ya mabe ezali kosalema na mokili, Yesu oyo azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, asali makambo mpo na kosalisa bato na mokili mobimba. Lokola mosala ya koteya bato Biblia na mokili mobimba oyo Yesu alobelaki ezali kosalema, bato mingi bazali koyekola Biblia mpe kosalela batoli na yango na bomoi na bango. (Yisaya 2:2-4) Bamilio ya bato bayekoli kozala na mabota ya esengo mpe kotika te ete mosala na bango to biloko ya mokili ekóma na ntina mingi koleka makambo mosusu nyonso. Bato yango bazali koyekola kozala na bomoi ya esengo lelo mpe bakómi lolenge ya bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.

MAKAMBO OYO BOKONZI YA NZAMBE EKOSALA

Atako Yesu azali sikoyo Mokonzi na likoló, baguvɛrnema ya bato ezali kaka koyangela awa na mabele. Kasi, Nzambe ayebisaki Yesu ete: “Kende kotya bato na nse ya bokonzi na yo na katikati ya banguna na yo.” (Nzembo 110:2) Mosika te, Yesu akoboma bato nyonso oyo batɛlɛmɛlaka ye mpe akosilisa mikakatano ya bato oyo batosaka Nzambe.

Na ntango wana, Bokonzi ya Nzambe

  • Ekolongola mangomba ya lokuta. Biblia emonisi ete mangomba ya lokuta ezali mwasi ya ndumba, oyo akobomama mosika te. Mangomba oyo ekolongolama ezali mangomba oyo eteyaka lokuta etali Nzambe mpe ekómisaka bomoi ya bato mpasi. Bato mingi bakoyoka mpasi ntango mangomba yango ekobebisama.​—Emoniseli 17:15, 16.

  • Ekosukisa baguvɛrnema ya bato. Bokonzi ya Nzambe ekosukisa baguvɛrnema nyonso ya bato.​—Emoniseli 19:15, 17, 18.

  • Ekoboma bato mabe. Nini ekokómela bato oyo basalaka makambo ya mabe mpe baboyaka kotosa Nzambe? Biblia elobi: “Bato mabe bakolongolama na mabele.”​—Masese 2:22.

  • Ekoboma Satana ná bademo. Satana ná bademo bakokoka te ‘kokosa lisusu bikólo.’​—Emoniseli 20:3, 10.

Bato oyo bandimi Bokonzi ya Nzambe bakozwa mapamboli nini?

MAKAMBO OYO BOKONZI YA NZAMBE EKOSALA MPO NA BATO

Yesu azali Mokonzi na likoló mpe akosala makambo oyo ata mokonzi moko te akokaki kosala. Akoyangela elongo na bato 144 000, oyo bautaki na mabele. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1, 3) Yesu akosala ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabele. Makambo nini Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo na bato awa na mabele?

  • Ekolongola maladi mpe liwa. “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi,’” mpe “liwa ekozala lisusu te.”​—Yisaya 33:24; Emoniseli 21:4.

  • Ekopesa bato kimya ya solosolo. “Bana na yo bakozala na kimya mingi,” mpe “bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango.”​—Yisaya 54:13; Mika 4:4.

  • Ekopesa bato mosala ya malamu. “Bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango. Bakoboma nzoto mpamba te.”​—Yisaya 65:22, 23.

  • Ekobongisa mabele, mai, mpe mopɛpɛ. “Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

  • Ekoteya bato makambo oyo basengeli kosala mpo na kozala na bomoi ya seko. “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Nzambe alingi ete ozwa mapamboli yango. (Yisaya 48:18) Lisolo oyo elandi ekolobela makambo oyo osengeli kosala mpo na kozwa mapamboli yango.