Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nasala nini mpo namitungisa koleka ndelo te?

Nasala nini mpo namitungisa koleka ndelo te?

 Komitungisa koleka ndelo ekoki kobebisa nzoto mpe mayoki ya moto. Ekoki kobimisa mikakatano ya minene koleka likambo oyo moto azalaki komitungisa mpo na yango.

Toli ebongi mpo na kokitisa mitungisi

  •  Tyáká bandelo mpo na kotánga to kolanda bansango ya mabe. Ezali na ntina te oyeba makambo nyonso ya mikemike mpo na likambo moko boye. Soki ozali kolanda bansango oyo eyokisaka mpasi, okokóma kobanga lisusu mingi mpe okozala lisusu na elikya te.

     Toli ya Biblia: “Elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”​—Masese 17:22.

     “Ezalaka pɛtɛɛ moto akóma moombo ya koluka koyeba bansango ya sika mpe bansango ya mabe na Internet, kasi yebá ete ezaleli yango ezali mabe mpenza. Mitungisi na ngai ekitaki mpenza ntango nakitisaki ntango ya kolanda bansango ya sika.”​—John.

     Kanisá naino: Ozali mpenza na mposa ya koyeba bansango nyonso ya sika?

  •  Batelá mimeseno na yo. Meká kolamuka, kolya, kosala misala ya ndako mpe kolala kaka na ngonga oyo omesaná kosala yango. Soki omityeli programɛ, okomona ete ozali na bomoi moko ya malamu mpe mitungisi na yo ekokita.

     Toli ya Biblia: “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba.”​—Masese 21:5.

     “Ntango maladi mabe ya coronavirus ebandaki, natikaki mpenza mimeseno na ngai ya malamu mpe namipesaki mingi na masano to na kominanola. Nalingaki kosalela malamu ntango na ngai, yango wana natyaki na programɛ na ngai makambo nyonso nasengeli kosala mokolo na mokolo.”​—Joseph.

     Kanisá naino: Nazali na momeseno ya malamu oyo esalaka ete namiyoka nasali likambo moko ya malonga na nsuka ya mokolo nyonso?

  •  Tyáká makanisi na makambo ya malamu. Soki olekisaka ntango mpo na koloba “soki nayebaka” to na kokanisa kaka makambo ekobeba, okokóma komitungisa koleka ndelo. Kutu, ekozala malamu okanisa nde na makambo oyo ekopesa yo esengo na bomoi.

     Toli ya Biblia: “Bózala na botɔndi.”​—Bakolose 3:15.

     “Ntango natángaka Biblia, nakɔtisaka te na makanisi na ngai makambo ya mabe, mpe esalisaka ngai natya makanisi na ngai na makambo ya malamu. Ekoki komonana pɛtɛɛ, kasi esalisaka ngai mpenza!”​—Lisa.

     Kanisá naino: Omesaná kotya makanisi na makambo ya mabe mpe kobosana makambo ya malamu oyo ekómelaka yo?

  •  Tyeláká basusu likebi. Soki ozali na mitungisi, mbala mosusu okoki kokanisa naino okende esika oyo okozala kaka yo moko. Na esika ya kosala bongo, kanisá makambo oyo okoki kosala mpo na kosalisa basusu.

     Toli ya Biblia: “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”​—Bafilipi 2:4.

     “Kosala makambo mpo na basusu epesaka ngai esengo. Nasalaka makambo oyo ekosepelisa bango, mpe na ntango yango, mitungisi na ngai ekitaka. Na yango, nazalaka na ntango mingi te mpo na kokanisa mitungisi na ngai.”​—Maria.

     Kanisá naino: Oyebi moto moko oyo azali na bosɛnga? Okoki kosala nini mpenza mpo osalisa moto yango?

  •  Batelá sante na yo. Saláká ngalasisi mpe zwáká ntango mingi mpo na kopema. Lyáká bilei oyo etongaka nzoto. Soki ozali kobatela sante na yo, okotalela makambo na ndenge mosusu mpe okomitungisa lisusu mingi te.

     Toli ya Biblia: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​—1 Timote 4:8.

     “Ngai ná mwana na ngai tokoki te kosala ngalasisi na libándá ndenge tolingi, yango wana tosalaka ngalasisi na ndako mbala na mbala. Yango esalaka ete tózala na esengo mpe tóyokana malamu.”​—Catherine.

     Kanisá naino: Osengeli na bilei oyo etongaka nzoto mpe kosalaka ngalasisi mpo na kozala na sante ya malamu?

 Longola kosalela batoli oyo nyonso, bato mingi bamonaka malamu báyekola bilaka ya Biblia mpo na mikolo ezali koya. Talá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?