Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na masanga? Komɛla yango ezali lisumu?

Biblia elobi nini mpo na masanga? Komɛla yango ezali lisumu?

Eyano ya Biblia

 Ezali lisumu te komɛla masanga kozanga kolekisa ndelo. Biblia emonisi ete vinyo ezali likabo ya Nzambe oyo ekoki kosala ete moto asepela lisusu na bomoi. (Nzembo 104:14, 15; Mosakoli 3:13; 9:7) Biblia endimi mpe ete vinyo esalaka lokola nkisi oyo ebikisaka bamaladi.​—1 Timote 5:23.

 Yesu amɛlaki vinyo ntango azalaki awa na mabele. (Matai 26:29; Luka 7:34) Moko ya makamwisi na ye oyo eyebani mingi ezali oyo abongolaki mai na vinyo, likabo oyo apesaki na fɛti moko ya libala.​—Yoane 2:1-10.

Makama ya komɛla masanga mingi

 Atako Biblia elobeli bolamu ya vinyo, kasi epekisi komɛla mingi mpe molangwa. Yango wana, mokristo oyo asepeli komɛla masanga, asengeli komɛla kozanga kolekisa ndelo. (1 Timote 3:8; Tito 2:2, 3) Biblia epesi bantina mingi ya koboya komɛla masanga mingi.

  •   Ebebisaka likoki ya kokanisa mpe ya kozwa bikateli. (Masese 23:29-35) Moto oyo alangwe akoki te kotosa etinda oyo ya Biblia, oyo elobi boye: “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima: mosala mosantu oyo bozali kosala na makoki na bino ya kokanisa.”​—Baroma 12:1.

  •   Komɛla masanga mingi elongolaka komipekisa mpe “makanisi ya malamu.”​—Hosea 4:11; Baefese 5:18.

  •   Ekoki kokómisa moto mobola mpe kobebisa sante na ye.​—Masese 23:21, 31, 32.

  •   Komɛla masanga mingi mpe molangwa esepelisaka Nzambe te.​—Masese 23:20; Bagalatia 5:19-21.

Kolekisa ndelo ebandi wapi?

 Soki masanga ekómi kotya moto na likama mpe bato mosusu, boye amɛli mingi. Biblia elobi te ete molangwa eyebanaka soki moto azali komiyeba te, kasi nde na bizaleli lokola kozanga koyeba likambo ya kosala, kotambola lokola moto alingi akwea, kosilikasilika to kobimisa maloba polele te. (Yobo 12:25; Nzembo 107:27; Masese 23:29, 30, 33) Ata baoyo baboyaka kolangwa bakoki mpe kokóma ‘kilo na kolekisa ndelo na komɛla mingi’ mpe bakoki kokutana na makama.​—Luka 21:34, 35.

Koboya komɛla ata moke

 Biblia elobeli mpe ntango oyo mokristo asengeli koboya mpenza komɛla masanga:

  •   Soki ekómi kobɛtisa basusu libaku.​—Baroma 14:21.

  •   Soki mibeko ya mboka epekisi yango.​—Baroma 13:1.

  •   Soki moto ayebi ndelo na ye te. Baoyo bakómá baombo ya masanga mpe ya molangwa basengeli kozwa bikateli ya makasi.​—Matai 5:29, 30.