Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini mbeka ya Yesu ezali ‘lisiko mpo na bato mingi’?

Ndenge nini mbeka ya Yesu ezali ‘lisiko mpo na bato mingi’?

Eyano ya Biblia

 Nzambe asaleli mbeka ya Yesu mpo na kosikola to kobikisa bato na lisumu mpe na liwa. Biblia elobi ete makila ya Yesu oyo esopanaki ezali lisiko. (Baefese 1:7; 1 Petro 1:18, 19) Yango wana, Yesu alobaki ete ayaki “kopɛsa bomɔi na ye lokola lisiko mpɔ na mingi.”​—Matai 20:28, Biblia haut fleuve.

Mpo na nini esɛngaki “lisiko mpo na bato mingi” epesama?

 Adama, moto ya liboso, akelamaki na nzoto ya kokoka to oyo ezangi lisumu. Azalaki na libaku ya kozala na bomoi ya libela, kasi abungisaki yango ntango aboyaki kotosa Nzambe. (Ebandeli 3:17-19) Ntango abotaki bana, atikelaki bango mpe lisumu. (Baroma 5:12) Yango wana Biblia alobi ete Adama ‘amitɛká’ mpe ‘atɛká’ bana na ye na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Baroma 7:14) Lokola bakómá bato ya kozanga kokoka, mwana moko te ya Adama akoki kofuta oyo Adama abungisaki.​—Nzembo 49:7, 8.

 Nzambe ayokelaki bana ya Adama mawa mpo bazangaki elikya. (Yoane 3:16). Kasi, mobeko ya Nzambe oyo etali bosembo esɛngaki te Nzambe akanga miso na masumu na bango to alimbisa bango kaka mpamba boye. (Nzembo 89:14; Baroma 3:23-26) Nzambe alingaka bato, yango wana apesaki eloko oyo endimami na mibeko mpo masumu na bango elimbisama mpe elongwa. (Baroma 5:6-8) Lisiko ezali eloko yango oyo endimami na mibeko.

Mosala oyo lisiko esali

 Na Biblia liloba “lisiko” esangisi makambo misato oyo elandi:

  1.   Eloko oyo moto afuti.​—Mitángo 3:46, 47.

  2.   Esalaka ete moto asikolama to alongwa na boombo.​—Kobima 21:30.

  3.   Ekokanaka na valɛrɛ ya eloko oyo bafuti to ezwaka esika ya eloko yango. a

 Tótala ndenge makambo yango eyokani na mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo.

  1.   Eloko oyo moto afuti. Biblia elobi ete bakristo “basombamaki mpenza na ntalo moko boye.” (1 Bakorinti 6:20; 7:23) Ntalo yango ezali makila ya Yesu oyo ‘asombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso.’​—Emoniseli 5:8, 9.

  2.   Kosikola moto. Mbeka ya Yesu ememi “kosikolama na nzela ya lisiko” mpo na masumu.​—1 Bakorinti 1:30; Bakolose 1:14; Baebre 9:15.

  3.   Eloko oyo ekokani. Mbeka ya Yesu ekokani mpenza na eloko oyo Adama abungisaki​—bomoi ya kokoka. (1 Bakorinti 15:21, 22, 45, 46) Biblia elobi: “Mpo ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko [Adama] ekómisaki ebele ya bato basumuki, ndenge mpe botosi ya moto kaka moko [Yesu Kristo] ekokómisa bato mingi bayengebene.” (Baroma 5:19) Yango emonisi ndenge oyo liwa ya moto moko ekoki kofuta lisiko mpo na basumuki mingi. Kutu, mbeka ya Yesu ezali “lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso” oyo bazali kosala makambo oyo esengeli mpo na kozwela yango bolamu.​—1 Timote 2:5, 6.

a Na Biblia, liloba oyo ebongolami na “lisiko” epesi likanisi ya mbongo, to valɛrɛ ya eloko oyo efutami. Na ndakisa, liloba ya Ebre kaphar elimboli “kozipa.” (Ebandeli 6:14) Esalelamaka mingimingi mpo na kozipama ya masumu. (Nzembo 65:3) Liloba mosusu kopher, oyo ekokani na yango, emonisaka mbongo oyo bafuti mpo na kozipama yango, to lisiko. (Kobima 21:30) Ndenge moko mpe, liloba ya Grɛki lytron, oyo mbala mingi ebongolami na “lisiko,” ekoki mpe kobongolama na “motuya ya lisiko.” (Matai 20:28) Bakomi ya Grɛki basalelaki liloba yango mpo na kolobela mbongo oyo bafuti mpo na kosikola moto oyo bakangi na bitumba to kosikola moombo.