Lakisá makambo oyo ezali na kati

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yirimia 29:11​—“Nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino”

Yirimia 29:11​—“Nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino”

 “‘Mpo ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, a ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’”​—Yirimia 29:11, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

 “Pamba té ngai Yawe nayebi makambo nakani po na bino: ekozala makambo ya mawa té kasi ya esengo. Nakobatela bino pe nakopesa bino bolamu oyo bozali koluka. Ngai Yawe moto nalobi boye.”​—Jeremya 29:11, Bible na lingala ya lelo.

Ndenge Yirimia 29:11 elimbolami

 Yehova alakaki basambeli na ye ete akopesa bango kimya na mikolo ezali koya. Atako ekomamaki mpo na bato ya ntango ya kala, maloba yango ezali kaka komonisa makanisi ya Nzambe. Azali “Nzambe oyo apesaka elikya.” (Baroma 15:13) Yango wana, asalaki ete bilaka lokola wana ekomama na Biblia mpo “tózala na elikya” ete makambo ekozala malamu na mikolo ezali koya.​—Baroma 15:4.

Makambo oyo bazali kolobela na Yirimia 29:11

 Maloba wana etyamaki na mokanda oyo batindelaki Bayisraele oyo bamemamaki na bokangami uta Yerusaleme tii na Babilone. b (Yirimia 29:1) Nzambe ayebisaki bakangami yango ete bakotikala na bokangami na boumeli ya bambula mingi mpe ete basengelaki kotonga bandako, kokata bilanga mpe kobatela mabota na bango. (Yirimia 29:4-9) Kasi, Nzambe alobaki lisusu boye: “Ntango mbula ntuku nsambo (70) ekokoka na Babilone nakotyela bino likebi, mpe nakokokisela bino liloba na ngai ya malamu na ndenge nakozongisa bino na esika oyo; elingi koloba [Yerusaleme].” (Yirimia 29:10) Na yango, Nzambe andimisaki bango ete akosundola bango te mpe ete elikya na bango ya kozonga na mboka na bango ekokokisama.​—Yirimia 31:16, 17.

 Nzambe akokisaki elaka na ye oyo apesaki Bayisraele. Ndenge asakolaki yango, Siruse mokonzi ya Baperse alongaki Babilone. (Yisaya 45:1, 2; Yirimia 51:30-32) Na nsima, Siruse asalaki ete Bayuda bázonga na mboka na bango. Nsima ya mbula 70 ya bokangami, bazongaki na Yerusaleme.​—2 Ntango 36:20-23; Ezera 3:1.

 Kokokisama ya elaka oyo ezali na Yirimia 29:11 ekitisaka motema ya baoyo batyelaka bilaka ya Nzambe motema lelo oyo. Bilaka yango esangisi kimya na mabele mobimba na nzela ya Bokonzi ya Nzambe na litambwisi ya Kristo Yesu.​—Nzembo 37:10, 11, 29; Yisaya 55:11; Matai 6:10.

Makanisi ya libunga oyo bato bakanisaka mpo na Yirimia 29:11

 Likanisi ya libunga: Nzambe azali na makambo ya sikisiki oyo “abongisá” mpo na moto na moto.

 Likanisi ya solo: Nzambe atikaka bato bápona bango moko makambo oyo bakosala na bomoi. Maloba na ye oyo ezali na Yirimia 29:11 ayebisaki yango epai ya Bayisraele na Babilone lokola etuluku, mpe azalaki na makanisi wana mpo na etuluku yango; elingi koloba alingaki bázala na kimya na mikolo ezali koya. (Yirimia 29:4) Kasi, Nzambe atikaki nzela na moto na moto apona soki akozwa mapamboli na elaka na ye wana to te. (Kolimbola Mibeko 30:19, 20; Yirimia 29:32) Baoyo baponaki koluka Nzambe basalaki bongo ntango babondelaki ye na motema mobimba.​—Yirimia 29:12, 13.

 Likanisi ya libunga: Nzambe akopesa basambeli na ye bozwi to bomɛngo.

 Likanisi ya solo: Maloba “bomoi malamu” oyo ezwami na Babiblia mosusu na Yirimia 29:11 ebongolami na liloba moko ya Ebre oyo elimboli “kimya, bokolɔngɔnɔ, mpe bolamu.” Na kotalela makambo oyo bazali kolobela, Nzambe alakaki kopesa Bayisraele oyo bazalaki na bokangami bozwi te kasi kimya mpe bomoi malamu. Bakokoba kozala na bomoi mpe mokolo mosusu bakozonga na Yerusaleme.​—Yirimia 29:4-10.

Tángá Yirimia mokapo 29 ná maloba na nse ya lokasa, ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

b Mpo na Yirimia 29:11, buku The Expositor’s Bible Commentary elobi: “Oyo ezali moko ya bilaka kitoko tozwi na Biblia oyo emonisi motema mawa ya Yawe [Yehova] mpo na bakangami wana mpe nsukansuka apesaki bango ntina oyo basengelaki kozala na makanisi malamu mpe elikya.”​—Volimi 7, lokasa 360.