Lakisá makambo oyo ezali na kati

Okoki kosala nini mpo oyeba Nzambe malamu?

Okoki kosala nini mpo oyeba Nzambe malamu?

Eyano ya Biblia

 Okoki koyeba Nzambe malamumalamu soki oyekoli makambo na ye mpe osali makambo oyo esepelisaka ye. Na nsima, Nzambe ‘akopusana penepene na yo.’ (Yakobo 4:8) Biblia eyebisi biso ete “azali mosika te na mokomoko na biso.”​—Misala 17:27.

 Makambo ya kosala mpo na koyeba Nzambe

 Tángáká Biblia

  •  Oyo Biblia elobi: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.”​—2 Timote 3:16.

  •  Oyo elimboli: Biblia ezali mokanda ya Nzambe. Akɔtisaki makanisi na ye na mitó ya bato oyo bakomaki Biblia. Na nzela ya mokanda yango, Nzambe ayebisi makambo oyo akani kosalela biso. Ayebisi biso bizaleli na ye, na ndakisa bolingo, bosembo mpe boboto.​—Kobima 34:6; Kolimbola Mibeko 32:4.

  •  Oyo okoki kosala: Tángáká Biblia mokolo na mokolo. (Yosua 1:8) Na kotalela makambo oyo otángi, mituná boye: ‘Makambo yango eteyi nga nini mpo na Nzambe?’​—Nzembo 77:12.

     Na ndakisa, tángá Yirimia 29:11, mpe na nsima mituna boye: ‘Nzambe alingi nazala na bomoi na ndenge nini: ya kimya to ya mpasi? Azali Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, to alingi nazala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?’

 Talá biloko oyo Nzambe akelá

  •  Oyo Biblia elobi: ‘Bizaleli ya [Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.’​—Baroma 1:20.

  •  Oyo elimboli: Biloko oyo Nzambe asalá oyo emonanaka emonisaka bizaleli na ye, kaka ndenge liyemi to masini moko emonisaka makambo mingi mpo na moto oyo asali yango. Na ndakisa, makambo oyo bɔɔngɔ na biso esalaka mpe ndenge oyo yango esalemi emonisa bwanya ya Nzambe, mpe moi ná minzoto mosusu emonisaka nguya ya Nzambe.​—Nzembo 104:24; Yisaya 40:26.

  •  Oyo okoki kosala: Zwáká ntango ya kotala mpe koyekola biloko oyo Nzambe akelá oyo ezali na mokili. Na nsima mituná boye: ‘Biloko ya kokamwa oyo ezali na mokili eteyi ngai nini mpo na Nzambe?’ a Mpo na koloba solo, biloko mingi oyo ezali na mokili ekoki te koteya biso makambo ya Nzambe. Yango wana apesá biso Biblia.

 Bengá Nzambe na nkombo na ye

  •  Oyo Biblia elobi: “Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai. Akobelela ngai, mpe nakoyanola ye.”​—Nzembo 91:14, 15.

  •  Oyo elimboli: Nzambe, oyo nkombo na ye Yehova, atyaka likebi na bato oyo bayebi nkombo na ye mpe basalelaka yango na limemya. b (Nzembo 83:18; Malaki 3:16) Nzambe ayebisi biso nkombo na ye mpo alingi tóyeba ye. Alobi: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.”​—Yisaya 42:8.

  •  Oyo okoki kosala: Bengá Yehova na nkombo na ye ntango ozali kolobela makambo na ye.

 Bondelá Yehova

  •  Oyo Biblia elobi: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.”​—Nzembo 145:18.

  •  Oyo elimboli: Yehova azali pene na bato oyo babondelaka ye na kondima. Libondeli ezali mpe na kati ya losambo, yango emonisaka ete tozali na limemya makasi mpo na Nzambe.

  •  Oyo okoki kosala: Bondelá Nzambe mbala na mbala. (1 Batesaloniki 5:17) Yebisá ye makambo oyo ezali kotungisa yo mpe ndenge oyo ozali komiyoka.​—Nzembo 62:8. c

 Bakisá kondima epai ya Nzambe

  •  Oyo Biblia elobi: “Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye ata moke te.”​—Baebre 11:6.

  •  Oyo elimboli: Mpo kokóma baninga ya Nzambe, tosengeli kondimela ye. Na Biblia, kozala na kondima esuki kaka te na kondima ete Nzambe azali. Elimboli mpe kotyela ye motema mobimba, kondima ete akokokisa makambo nyonso oyo alaki mpe ete mibeko na ye ezali malamu mpenza. Mpo na kozala na boninga malamu na moto mosusu, osengeli kotyela ye motema.

  •  Oyo okoki kosala: Kondima ya solosolo eutaka na boyebi. (Baroma 10:17) Yango wana, yekolá Biblia mpe zalá na kondima ete okoki kotyela Nzambe mpe batoli na ye motema. Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia. d

 Salá makambo oyo esepelisaka Nzambe

  •  Oyo Biblia elobi: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye.”​—1 Yoane 5:3.

  •  Oyo elimboli: Yehova azalaka moninga ya bato oyo basalaka makasi ya kotosa mibeko na ye mpo balingaka ye.

  •  Oyo okoki kosala: Ntango ozali koyekola Biblia, luká koyeba makambo oyo Nzambe alingaka mpe oyo alingaka te. Mituná boye: ‘Makambo nini nakoki kobongisa mpo na kosepelisa Mozalisi na ngai?’​—1 Batesaloniki 4:1.

 Salelá batoli ya Biblia mpo omona ete Nzambe alingaka yo

  •  Oyo Biblia elobi: “Bómeka mpe bómona ete [Nzambe] azali malamu.”​—Nzembo 34:8.

  •  Oyo elimboli: Nzambe asɛngi yo omona yo moko ndenge azali malamu. Ntango okomona ete alingaka yo mpe asalisaka yo, okolinga kokóma moninga na ye.

  •  Oyo okoki kosala: Ntango ozali kotánga Biblia, salelá batoli ya Nzambe mpe moná bolamu oyo okozwa. (Yisaya 48:17, 18) Talá mpe bomoi ya bato oyo, na lisalisi ya Nzambe, balongaki mikakatano, babongisaki bomoi na bango mpe ya mabota na bango, mpe bazwá esengo ya solosolo. e

 Makanisi ya libunga mpo na likambo etali koyeba Nzambe

 Likanisi ya libunga: Nzambe akoki kokóma moninga na biso te mpo azali na nguya mpe na valɛrɛ mingi.

 Bosolo: Atako Nzambe azali na nguya koleka mpe azali na valɛrɛ mingi koleka bato nyonso, asɛngi biso tókóma baninga na ye. Biblia ezali na bandakisa ebele ya basi mpe mibali oyo bakómaki baninga ya Nzambe.​—Misala 13:22; Yakobo 2:23.

 Likanisi ya libunga: Tokoki koyeba Nzambe te mpo azali libombami.

 Bosolo: Ezalaka mpasi koyeba makambo ya Nzambe, na ndakisa ndenge azali Elimo oyo emonanaka te. Atako bongo, tokoki koyeba Nzambe. Kutu, Biblia elobi ete mpo tózwa bomoi ya seko, tosengeli koyeba ye. (Yoane 17:3) Biblia esaleli elobeli ya pɛtɛɛ oyo ekosalisa biso tóyeba malamu Mozalisi na biso, bizaleli na ye, mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabele, mpe mibeko na ye. (Yisaya 45:18, 19; 1 Timote 2:4) Ndenge tomonaki yango liboso, Biblia eyebisi biso mpe nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Tokoki koyeba Nzambe mpe kokóma baninga na ye.​—Yakobo 4:8.

a Mpo na komona ndenge bwanya ya Nzambe emonisami na biloko oyo asalá, talá masolo “Ebimá kaka yango moko?

b Bato mingi balobaka ete nkombo Yehova elimboli “Akómisaka.” Ndenge Nzambe ayebisi biso nkombo na ye, ezali lokola azali koloba na biso: ‘Nakokokisa mokano mpe bilaka na ngai. Nakokisaka ntango nyonso maloba na ngai.’

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video Boyekoli ya Biblia esalemaka ndenge nini?

e Talá masolo “Biblia ebongolaka bato.”