Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lobiko ezali nini?

Lobiko ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Na bantango mosusu, bakomi ya Biblia basalelaki maloba “kobika” mpe “lobiko” mpo na kolobela moto oyo abikisami na likama to na liwa. (Kobima 14:13, 14; Misala 27:20) Kasi, maloba yango esalelamaka mingimingi mpo na kolobela kobikisama na masumu. (Matai 1:21) Lokola bato bakufaka mpo na lisumu, baoyo babikisami na lisumu bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko.​—Yoane 3:16, 17. a

Nini ememaka na lobiko?

 Mpo na kozwa lobiko, osengeli kondimela Yesu mpe komonisa kondima yango na kotosa mibeko na ye.​—Misala 4:10, 12; Baroma 10:9, 10; Baebre 5:9.

 Biblia emonisi ete osengeli kozala na misala, to kosala makambo oyo emonisi ete otosaka mpo na komonisa ete kondima na yo ezali ya kokufa te. (Yakobo 2:24, 26) Kasi, yango elingi koloba te ete okoki yo moko kozwa lobiko. Ezali “likabo ya Nzambe” oyo apesi mpo “na boboto monene” na ye, to “ngrásya.”​—Baefese 2:8, 9; Biblia Liloba lya Nzambe.

Okoki kozanga lobiko?

 Ɛɛ. Kaka ndenge moto oyo babikisi na mai akoki kozinda lisusu na mai, moto oyo babikisi na lisumu kasi atiki komonisa kondima akoki kozanga lobiko. Yango wana, Biblia esɛngi bakristo oyo bazwi lobiko ‘bábunda etumba makasi mpo na kondima.’ (Yuda 3) Ekebisi mpe baoyo babikisami ete ‘bákoba kosala mpo na lobiko na bango moko na kobanga mpe na kolɛnga.’​—Bafilipi 2:12.

Nani nde Mobikisi, Nzambe to Yesu?

 Biblia emonisi ete Nzambe azali mobandisi ya lobiko, mpo mbala mingi ebengaka ye “Mobikisi.” (1 Samwele 10:19; Yisaya 43:11; Tito 2:10; Yuda 25) Longola yango, Nzambe asalelaki mibali ndenge na ndenge mpo na kosikola ekólo Yisraele, mpe Biblia ebengi mibali yango “babikisi.” (Nehemia 9:27; Basambisi 3:9, 15; 2 Bakonzi 13:5) b Ndenge moko mpe, lokola Nzambe abikisi bato na lisumu na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo, Biblia ebengi Yesu “Mobikisi.”​—Misala 5:31; Tito 1:4. c

Bato nyonso nde bakobika?

 Te, bato mosusu bakobika te. (2 Batesaloniki 1:9) Ntango moto moko atunaki Yesu: “Baoyo bakobika bazali moke?” ayanolaki: “Bósala makasi mpenza bókɔta na porte ya moke, mpo nazali koyebisa bino, bato mingi bakoluka kokɔta kasi bakokoka te.”​—Luka 13:23, 24.

Makanisi ya libunga na oyo etali lobiko ya bato nyonso

 Likanisi ya libunga: Mokanda ya 1 Bakorinti 15:22 eteyaka ete bato nyonso bakobika mpo elobi “bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.”

 Solo: Lisolo mobimba ya mokapo yango elobeli lisekwa. (1 Bakorinti 15:12, 13, 20, 21, 35) Na yango, maloba ‘bato nyonso bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo’ elimboli kaka ete baoyo nyonso bakosekwa bakozwa lipamboli yango na nzela ya Yesu Kristo.​—Yoane 11:25.

 Likanisi ya libunga: Tito 2:11 eteyaka ete bato nyonso bakobika mpo elobi Nzambe azali kopesa “lobiko na bato yɔnsɔ.”​—Biblia haut fleuve.

 Solo: Liloba ya grɛki oyo ebongolami na “nyonso” na vɛrsɛ oyo ekoki mpe kolimbola “ndenge nyonso to ndenge na ndenge.” d Na yango, ndimbola ya malamu ya Tito 2:11 ezali ete Nzambe akobikisa bato ya ndenge nyonso, ata mpe baoyo “bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.”​—Emoniseli 7:9, 10.

 Likanisi ya lokuta: Mokanda ya 2 Petro 3:9 eteyaka ete bato nyonso bakobika mpo elobi ete Nzambe “alingi moto ata moko te abomama.”

 Solo: Nzambe alingi bato bábika, kasi atindikaka bango na makasi te bándima ebongiseli oyo azwi mpo na kobikisa bato. “Mokolo ya kosambisama” oyo Nzambe atye, ekozala mpe mokolo oyo ‘akobebisa bato oyo batyolaka ye.’​—2 Petro 3:7.

a Biblia elobaka ete moto ‘abikisami’ ata soki kobika na ye na lisumu mpe na liwa ezali mpo na mikolo ezali koya.​—Baefese 2:5; Baroma 13:11.

b Na bavɛrsɛ oyo totángi, mabongoli mosusu ya Biblia esaleli maloba “molongi,” “mosikoli,” “elombe,” “mokambi,” to “moto” na esika ya “mobikisi.” Kasi, na makomi ya ebandeli ya Biblia na monɔkɔ ya Ebre, liloba wana oyo esalelami mpo na kolobela baoyo babikisaki baninga na bango bato esalelami mpe na esika mosusu na Biblia ntango elobi ete Yehova Nzambe azali Mobikisi.​—Nzembo 7:10.

c Nkombo Yesu euti na nkombo moko ya Ebre Yehoh·shuʹaʽ, oyo elimboli “Yehova azali lobiko.”

d Talá buku Vine’s Complete Expository Dictionary of Old and New Testament Words. Kaka liloba moko wana ya Grɛki ezali na Matai 5:11, oyo ezali na maloba oyo Yesu alobaki ete bato bakolobela bayekoli na ye makambo mabe “ya ndenge nyonso.”​—International Standard Version.