Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NSUKA YA MOKILI EKÓMI PENE?

“Nsuka ya mokili”​—Elimboli nini?

“Nsuka ya mokili”​—Elimboli nini?

Ntango oyokaka maloba, “nsuka ya mokili ekómi pene!” nini eyelaka yo na makanisi? Okanisaka ete ezali mokolo oyo Masiya akoya kozwa bato ya malamu mpo na komema bango na lola mpe kobwaka bato mabe na lifelo to okanisaka ete ezali kaka liwa ya moto?

Kasi Biblia elobi ete “nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Ebengi yango mpe “mokolo monene ya Nzambe” to “Har–Magedone.” (Emoniseli 16:14, 16) Toboyi te, mangomba epesaka makanisi ndenge na ndenge na likambo yango mpe bato mosusu mingi bayebaka likambo yango malamu mpenza te. Kasi Biblia elobeli likambo yango polele; emonisi soki nsuka ya mokili ezali nini mpe soki ezali nini te. Biblia ezali mpe kosalisa biso tóyeba soki nsuka yango ekómi pene. Likambo eleki ntina, emonisi biso ndenge ya kosala mpo tóbika! Kasi liboso, tósembola naino makanisi mosusu ya libunga mpe tómonisa soki nsuka ya mokili ezali mpenza nini. Biblia emonisi ete “nsuka” ya mokili ezali mpenza nini?

NSUKA YA MOKILI EZALI TE

  1. KOBEBISAMA YA MABELE NA MƆTƆ.

    Biblia elobi boye: “[Nzambe] atyá moboko ya mabele na bisika na yango ya libela; ekotengatenga te kino ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.” (Nzembo 104:5) Vɛrsɛ yango mpe bavɛrsɛ mosusu endimisi biso ete Nzambe akobebisa mabele te mpe akotika te ete bato bábebisa yango libela!​—Mosakoli 1:4; Yisaya 45:18.

  2. LIKAMBO MOKO OYO EKANAMI TE, OYO EZANGI DATI.

    Biblia emonisi ete nsuka ya mokili ezali na dati ya sikisiki oyo Nzambe atyá. Elobi boye: “Kasi mpo na mokolo yango to ngonga yango moto moko ayebi te, ezala baanzelu na likoló, ezala Mwana, kaka Tata. Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka.” (Marko 13:32, 33) Ezali polele ete Nzambe, (“Tata”) azali na ‘ntango oyo atyá’ mpo nsuka ya mokili ebanda.

  3. LIKAMA OYO BATO BAKOBIMISA TO BASALITE OYO EKOUTA LIKOLÓ MPE EKOBEBISA MABELE.

    Nini ekobandisa nsuka ya mokili? Emoniseli 19:11 elobi boye: “Namonaki likoló efungwami, mpe talá! mpunda moko ya mpɛmbɛ. Mpe moto oyo afandaki likoló na yango abengami Sembo mpe Solo.” Vɛrsɛ 19 ebakisi boye: “Namonaki nyama mabe mpe bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe na limpinga na ye.” (Emoniseli 19:11-21) Atako bavɛrsɛ yango esaleli mingi maloba ya elilingi, tokoki mpenza kososola yango: Nzambe akotinda limpinga moko ya baanzelu mpo na koboma banguna na ye.

Nsango ya Biblia oyo etali nsuka ya mokili ezali nde nsango malamu

NSUKA YA MOKILI EZALI

  1. NSUKA YA BAGUVƐRNEMA YA BATO.

    Biblia elobi boye: “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.” (Danyele 2:44) Ndenge tomonisaki yango liboso, “bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango,” oyo ‘bakoyangana mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe na limpinga na ye,’ bakobomama.​—Emoniseli 19:19.

  2. NSUKA YA BITUMBA, MOBULU MPE KOZANGA BOSEMBO.

    “[Nzambe] azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.” (Nzembo 46:9) “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.” (Masese 2:21, 22) “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.”​—Emoniseli 21:4, 5.

  3. NSUKA YA MANGOMBA OYO EFINGISI NZAMBE MPE EBUNGISI BATO NZELA.

    “Basakoli bazali mpenza kosakola na lokuta; mpe banganga-nzambe bazali konyata bato na nguya na bango. . . . Bongo bokosala nini na nsuka?” (Yirimia 5:31) “Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo, tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki misala ya nguya na nkombo na yo te?’ Nzokande nakoyebisa bango polele ete: ‘Nayebi bino ata moke te! Bólongwa mosika na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko.’”​—Matai 7:21-23.

  4. NSUKA YA BATO OYO BASALAKA ETE MAKAMBO MABE ETONDA NA MOKILI.

    Yesu Kristo alobaki boye: “Nzokande ntina ya lisambisi yango ezali oyo, ete pole eyaki na mokili kasi bato balingaki molili na esika ya kolinga pole, mpo misala na bango ezalaki mabe.” (Yoane 3:19) Biblia elobeli ndenge mokili ebomamaki liboso na ntango ya Noa, moto ya sembo. Elobi boye: “Mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai. Kasi na nzela ya liloba yango kaka likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.”​—2 Petro 3:5-7.

Simbá ete “mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa” oyo ezali koya bakokanisi yango na kobebisama ya “mokili” ya ntango ya Noa. Mokili nini ebebisamaki? Planɛti na biso ebebisamaki te; ezalaki nde “bato oyo batyolaka Nzambe;” banguna na ye nde ‘babebisamaki.’ Ntango “mokolo ya kosambisama” ya Nzambe ekoya, baoyo baponi kozala banguna ya Nzambe bakobebisama ndenge wana. Kasi baninga ya Nzambe bakobatelama, ndenge Noa ná libota na ye babatelamaki.​—Matai 24:37-42.

Kanisá naino ndenge mabele ekokóma ntango Nzambe akoboma bato nyonso ya mabe! Ezali polele ete nsango ya Biblia oyo etali nsuka ya mokili ezali nde nsango malamu. Ata bongo, okoki komituna boye: ‘Biblia emonisi ntango oyo nsuka ekoya? Ntango yango ekómi pene? Nasala nini mpo nabika?’