Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tokoki mpenza kosepelisa Nzambe?

Tokoki mpenza kosepelisa Nzambe?

Otángá naino te masolo ya bato oyo Biblia elobeli na esengo mpenza mpe omilobeli boye: ‘Nakokoka kozala lokola bango te!’ Okoki kokanisa boye: ‘Nasalaka ntango nyonso te oyo ezali malamu to nazali sembo te.’

Yobo azalaki “na mbeba te mpe azalaki sembo.”​—Yobo 1:1

Biblia elobeli Yobo lokola moto oyo “azalaki na mbeba te mpe azalaki sembo.” (Yobo 1:1) Ebengi Lota moto ya “boyengebene.” (2 Petro 2:8) Mpe elobaki mpo na Davidi ete azalaki kosala “oyo ezali sembo” na miso ya Nzambe. (1 Bakonzi 14:8) Kasi, tótalela malamumalamu bomoi ya bato yango oyo Biblia elobeli. Tokomona ete (1) basalaki mabunga, (2) tokoki kozwa mateya mingi na ndakisa na bango mpe (3) bato ya masumu bakoki mpenza kosepelisa Nzambe.

BASALAKI MABUNGA

“[Nzambe] abikisaki moyengebene Lota, oyo atungisamaki makasi mpo na bato oyo babukaka mibeko oyo bamipesaki na etamboli ya nsɔni.”​—2 Petro 2:7

Yobo akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge oyo emonani ete ezalaki sembo te. Akómaki na likanisi mabe ete Nzambe azalaki kokipe te soki abatelaki kondima na ye to te. (Yobo 9:20-22) Yobo amonisaki mpenza ete azalaki sembo mpe bato mosusu bamonaki yango lokola azali komonisa ete bosembo na ye eleki oyo ya Nzambe.​—Yobo 32:1, 2; 35:1, 2.

Lota akakatanaki mpo na kozwa ekateli oyo emonanaki ete ezalaki polele mpe makasi te. Azalaki komitungisa mpenza mpo na masumu minene oyo bato ya Sodoma ná Gomora bazalaki kosala, azalaki kutu “kotungisa molimo na ye ya boyengebene” mpo na bizaleli na bango. (2 Petro 2:8) Nzambe alobaki ete azwaki mokano ya kobebisa bingumba wana ya mabe mpe kopesa Lota ná bato ya libota na ye libaku ya kobika. Okoki kokanisa ete lokola Lota azalaki komitungisa, asengelaki kozala moto ya liboso ya kobima na esika yango. Kasi, na ntango wana ya likama, akómaki kolalisa makambo. Baanzelu oyo Nzambe atindaki mpo na kobikisa ye ná libota na ye basengelaki kosimba bango na mabɔkɔ mpo na kobimisa bango na engumba yango mpo bákufa te.​—Ebandeli 19:15, 16.

Davidi “alandaki [Nzambe] na motema na ye mobimba na ndenge azalaki kosala kaka oyo ezali sembo na miso [ya Nzambe].”​—1 Bakonzi 14:8

Davidi na libaku moko azangaki komipekisa mpe asalaki ekobo na mwasi ya moto mosusu. Mpo na koluka kobomba lisumu na ye, Davidi abomisaki mobali ya mwasi yango. (2 Samwele, mokapo 11) Biblia elobi ete likambo oyo Davidi asalaki “emonanaki mabe na miso ya Yehova.”​—2 Samwele 11:27.

Yobo, Lota ná Davidi bango nyonso basalaki mabunga, mosusu ezalaki mabunga minene mpenza. Kasi, ndenge tokomona yango, bazalaki na mposa ya kosalela Nzambe na botosi mpe na motema mobimba. Bazalaki pene ya kondima mabunga na bango mpe kobongwana. Yango wana, Nzambe andimaki bango mpe na nyonso, Biblia elobeli bango lokola bato ya sembo.

LITEYA NINI TOKOKI KOZWA?

Lokola tozali bato ya masumu, mwaye ya kokima kosala mabunga ezali te. (Baroma 3:23) Kasi soki tosali yango, tosengeli kondima libunga yango mpe na nsima kosala oyo tokoki mpo na kobongisa likambo yango.

Ndenge nini Yobo, Lota ná Davidi babongisaki mabunga na bango? Na motema na ye, Yobo azalaki moto ya sembo. Ntango Nzambe alobaki makambo oyo etindaki ye akanisa, Yobo abongisaki makanisi na ye mpe ayokaki mawa mpo na makambo oyo alobaki. (Yobo 42:6) Ndenge oyo Lota azalaki kotalela bizaleli mabe ya bato ya Sodoma ná Gomora eyokanaki mpenza na mibeko ya Nzambe. Kosala makambo nokinoki nde ezalaki mpasi mpo na ye. Nsukansuka akimaki bingumba yango oyo Nzambe akatelaki etumbu mpe abikaki ntango Nzambe apesaki yango etumbu. Na botosi nyonso atalaki nsima te biloko oyo atikaki. Atako Davidi asalaki lisumu monene ndenge abukaki mobeko ya Nzambe, amonisaki mpenza oyo ezalaki na motema na ye ndenge abongolaki motema mpe asɛngaki Nzambe ayokela ye mawa.​—Nzembo 51.

Ndenge oyo Nzambe atalelaki bato yango eyokani na makambo oyo azelaka ete bato ya masumu básala. Nzambe “ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.” (Nzembo 103:14) Boye, soki Nzambe ayebi ete tokoki te kokima kosala mabunga, azelaka ete tósala nini?

Nzambe “ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.”​—Nzembo 103:14.

NDENGE NINI BATO YA MASUMU BAKOKI KOSEPELISA NZAMBE?

Toli oyo Davidi apesaki mwana na ye Salomo emonisi biso ndenge ya kosala mpo na kosepelisa Nzambe; alobaki boye: “Yo, mwana na ngai Salomo, yebá Nzambe ya tata na yo mpe salelá ye na motema mobimba.” (1 Ntango 28:9) Motema mobimba elimboli nini? Ezali motema oyo elingaka Nzambe mpe ezali na ekateli ya kolinga mpe kosala mokano na ye. Motema yango ezali ya kokoka te kasi ezalaka na mposa makasi ya kosalela Nzambe na botosi mpe endimaka básembola yango. Kolinga Nzambe mpe mposa ya kotosa ye nde esalaki ete Nzambe amona ete Yobo “azalaki na mbeba te,” Lota azalaki “moyengebene” mpe Davidi “azalaki kosala kaka oyo ezali sembo” na miso ya Nzambe. Atako basalaki mabunga, bazalaki na likoki ya kosepelisa Nzambe.

Motema mobimba elingaka mokano ya Nzambe mpe ezalaka na mposa makasi ya kosalela ye na botosi nyonso

Na yango, soki makanisi mabe oyo tokanaki te eyeli biso to tolobi likambo moko esengelaki te to tosali likambo moko oyo na nsima tomoni ete ezalaki mabe, tiká ete bandakisa ya bato oyo touti kolobela epesa biso mpiko. Nzambe ayebi ete tozali naino bato ya masumu. Ata bongo, amizelaka ete tólinga ye mpe tósala makasi mpo na kotosa ye. Soki motema na biso ezali mobimba epai na ye, tokoki kotya motema ete biso mpe tokoki kosepelisa ye.