Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe azalaka na bankombo boni?

Nzambe azalaka na bankombo boni?

Eyano ya Biblia

 Nzambe azalaka kaka na nkombo moko. Na Ebre ekomamaka boye יהוה kasi na lingala mbala mingi babongolaka yango na “Yehova.” a Na nzela ya mosakoli Yisaya, Nzambe alobaki boye: “Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.” (Yisaya 42:8) Nkombo yango ezali mbala soki 7 000 na bamaniskri ya kala ya Biblia​—ezali mingi koleka batitre nyonso mosusu oyo babengaka na yango Nzambe to nkombo ya moto mosusu nyonso. b

Nzambe azali na bankombo mosusu?

 Atako Biblia elobi ete Nzambe azali kaka na nkombo moko, kasi esaleli batitre mingi mpe elobeli Nzambe na ndenge mingi. Liste ya batitre yango mosusu mpe ndenge oyo Biblia elobeli Nzambe mpo na komonisa bomoto to bizaleli na ye ezali awa na nse.

Titre

Vɛrsɛ

Ndimbola

Allah

(Moko te)

“Allah,” oyo ezali liloba moko ya monɔkɔ ya Arabe ezali nkombo mpenza te kasi nde titre oyo elimboli “Nzambe.” Mabongoli ya Biblia na Arabe mpe minɔkɔ mosusu esaleli “Allah” na esika ya “Nzambe.”

Mozwi-ya-Nguya-Nyonso

Ebandeli 17:1

Azali na nguya oyo eleki nguya nyonso. Maloba ya Ebre ʼEl Shad·daiʹ, to “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” ezali mbala nsambo na Biblia.

Alfa mpe Omega

Emoniseli 1:8; 21:6; 22:13

“Moto ya Liboso mpe Moto ya Nsuka,” to “ebandeli mpe nsuka,” elimboli ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mosusu azalaki te liboso ya Yehova mpe nsima na ye mosusu akozala te. (Yisaya 43:10) Alfa mpe Omega ezali lɛtrɛ ya liboso mpe ya nsuka ya alfabɛ Grɛki.

Mokóló na Mikolo

Danyele 7:9, 13, 22

Azali na ebandeli te; azali seko na seko liboso moto to eloko mosusu nyonso ezala.​—Nzembo 90:2.

Mokeli

Yisaya 40:28

Akelá biloko nyonso.

Tata

Matai 6:9

Mopesi ya bomoi

Nzambe

Ebandeli 1:1

Eloko to moto nyonso oyo basambelaka ye; oyo azali makasi. Liloba ya Ebre ʼElo·himʹ ezali na boike (pluriel), ezali komonisa ete Yehova azali na bokonzi, lokumu mpe malamu mingi koleka.

Nzambe ya banzambe

Kolimbola Mibeko 10:17

Nzambe oyo aleki banzambe nyonso, nakokesana na “banzambe ya mpambampamba” oyo bato mosusu basambelaka.​—Yisaya 2:8.

Molakisi Monene

Yisaya 30:20, 21

Apesaka mateya mpe litambwisi ya malamu.​—Yisaya 48:17, 18.

Mokeli Monene

Nzembo 149:2

Akelá biloko nyonso.​—Emoniseli 4:11.

Nzambe ya esengo

1 Timote 1:11

Asepelaka mpe azalaka na esengo.​—Nzembo 104:31.

Moyoki ya libondeli

Nzembo 65:2

Ayokaka libondeli nyonso oyo moto abondeli ye na kondima.

Nazali oyo nazali

Kobima 3:14, Bible na lingala ya lelo oyo

Akómaka nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokano na ye. Babongolá mpe fraze yango na “Nakokóma oyo nasepeli kokóma” to “nakozala oyo nakozala.” Libongoli ya Biblia ya Rotherham (The Emphasised Bible; Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika) Yango esalisi biso tóyeba ndimbola ya nkombo Yehova, oyo epesami na vɛrsɛ oyo elandi.​—Kobima 3:15.

Zuwa

Kobima 34:14

Alingaka bombanda te na losambo. Liloba yango ebongolamá mpe na “andimaka bombanda te” mpe “asɛngaka kokangama kaka na ye.”​—Biblia God’s Word Bible; Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

Mokonzi ya seko

Emoniseli 15:3

Boyangeli na ye ezali na ebandeli te, na nsuka mpe te.

Nkolo

Nzembo 135:5

Mokonzi to patrɔ; na Ebre ʼA·dhohnʹ mpe ʼAdho·nimʹ.

Nkolo ya mampinga

Yisaya 1:9; Baroma 9:29, libongoli ya Biblia King James Version

Azali Komanda ya limpinga monene ya baanzelu. Titre “Nkolo ya mampinga” ekoki mpe kobongolama na “Yawe na bibele” mpe “Yehova ya mampinga.”​—Baroma 9:29, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika; Biblia haut fleuve.

Oyo-Aleki-Likoló

Nzembo 47:2

Moto aleki ye azali te.

Aleki Bosantu

Masese 9:10

Aleki ekelamu mosusu nyonso na bosantu (bizaleli na ye ezali pɛto mpe malamu).

Moyemi

Yisaya 64:8

Azali na bokonzi likoló ya bato mpe bikólo nyonso kaka ndenge moyemi-mbɛki azalaka na bokonzi likoló ya mabele ya lima.​—Baroma 9:20, 21.

Mosikoli, Mobikisi

Yisaya 41:14

Abikisaki to asombaki bato na lisumu mpe liwa na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo.​—Yoane 3:16.

Libanga

Nzembo 18:2, 46

Azali ekimelo ya solosolo mpe eutelo ya lobiko.

Mobikisi

Yisaya 45:21

Asikolaka na likama to na libebi.

Mobateli

Nzembo 23:1

Abatelaka basambeli na ye.

Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso

Ebandeli 15:2

Azali na bokonzi likoló ya nyonso; na Ebre ʼAdho·naiʹ.

Oyo-Aleki-Nyonso

Danyele 7:18, 27

Mokonzi oyo aleki bankonzi nyonso.

Bankombo ya bisika na Makomami ya Ebre

 Bankombo ya bisika mosusu na Biblia ezali mpe na nkombo ya Nzambe na kati, kasi yango ezali te bankombo mosusu ya Nzambe.

Nkombo ya esika

Vɛrsɛ oyo elobeli yango

Ndimbola

Yehova-yire

Ebandeli 22:13, 14

“Yehova akopesa.”

Yehova-nisi

Kobima 17:15

“Yehova azali esika na ngai ya komibomba.” Yehova azali Nzambe oyo basambeli na ye bakoki koluka libateli mpe lisalisi epai na ye.​—Kobima 17:13-16.

Yehova-shalome

Basambisi 6:23, 24

“Yehova azali kimya.”

Yehova shammah

Ezekiele 48:35

“Yehova azali kuna.”

Ntina ya koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango

  •   Nzambe azwaka mpenza nkombo na ye Yehova na valɛrɛ, yango wana atyá yango mbala ebele na Biblia.​—Malaki 1:11.

  •   Yesu Mwana ya Nzambe amonisaki mbala na mbala ntina ya nkombo ya Nzambe. Na ndakisa, abondelaki Yehova boye: “Nkombo na yo esantisama.”​—Matai 6:9; Yoane 17:6.

  •   Koyeba mpe kosalela nkombo ya Nzambe ezali likambo ya liboso ya kosala mpo moto akóma moninga ya Yehova. (Nzembo 9:10; Malaki 3:16) Boninga yango esalisaka moto azwa litomba na elaka oyo ya Nzambe: “Lokola alingaka ngai mingi, ngai mpe nakobikisa ye. Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.”​—Nzembo 91:14.

  •   Biblia endimi ete “banzambe bazalaka, ezala na likoló to na mabele, ndenge ‘banzambe’ bazali mingi mpe ‘bankolo’ bazali mingi.” (1 Bakorinti 8:5, 6) Kasi emonisi Nzambe moko ya solo na nkombo na ye, Yehova.​—Nzembo 83:18.

a Bato mosusu ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Ebre bamonaka ete nkombo ya Nzambe esengeli kobongolama “Yahweh.”

b Ebengeli ya mokuse ya nkombo ya Nzambe “Yah,” ezali mbala soki 50 na Biblia, basalelaka yango mpe na maloba lokola “Aleluya”, oyo elimboli “bósanzola Yah.”​—Emoniseli 19:1; Biblia haut fleuve