Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nani azali “Alfa ná Omega”?

Nani azali “Alfa ná Omega”?

Eyano ya Biblia

 Ebengeli “Alfa ná Omega” etaleli Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ezali mbala misato na Biblia.​—Emoniseli 1:8; 21:6; 22:13. a

Mpo na nini Nzambe amibengi “Alfa ná Omega”?

 Alfa ná Omega ezali balɛtrɛ ya liboso mpe ya nsuka ya alfabɛ ya Grɛki. Eteni ya Biblia oyo babengaka Testama ya Sika ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki, mpe mokanda ya Emoniseli ezali na eteni yango. Esika oyo balɛtrɛ yango ezali na alfabɛ ya Grɛki emonisi ete kaka Yehova nde azali ebandeli mpe nsuka. (Emoniseli 21:6) Azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso banda ntango oyo etyami ndelo te mpe akozala bongo libela na libela. Kaka ye nde azali “libela na libela.”​—Nzembo 90:2.

Nani azali ‘moto ya liboso mpe ya nsuka’?

 Biblia esaleli maloba yango mpo na kolobela Yehova ná Mwana na ye, Yesu, kasi na bandimbola ekeseni. Tózwa ndakisa mibale.

  •   Na Yisaya 44:6, Yehova alobi boye: “Ngai nazali moto ya liboso mpe ngai nazali moto ya nsuka, mpe longola ngai Nzambe mosusu azali te.” Awa, Yehova amonisi polele ete azali Nzambe ya solo, azali libela na libela mpe longola ye, Nzambe mosusu azali te. (Kolimbola Mibeko 4:35, 39) Na yango, maloba “moto ya liboso mpe moto ya nsuka” ezali na ndimbola moko na maloba “Alfa ná Omega.”

  •   Maloba “moto ya liboso [na Grɛki prôtos, kasi Alfa te] mpe moto ya nsuka [na Grɛki éskhatos, kasi Omega te]” ezali mpe na Emoniseli 1:17, 18 mpe 2:8. Maloba oyo ezali liboso ya bavɛrsɛ yango emonisi ete moto oyo maloba yango etaleli akufaki mpe na nsima azongaki lisusu na bomoi. Boye, bavɛrsɛ yango ekoki kolobela Nzambe te mpo ye akufaka te. (Habakuku 1:12) Kasi, Yesu akufaki mpe asekwaki. (Misala 3:13-15) Azalaki moto ya liboso ya kosekwa na nzoto ya elimo mpe mpo na bomoi oyo ezangi kokufa kuna na likoló, epai azali sikoyo na bomoi “libela na libela.” (Emoniseli 1:18; Bakolose 1:18) Yesu nde moto azali kosekwisa baoyo nyonso bazali kosekwa nsima na ye. (Yoane 6:40, 44) Na yango, azalaki moto ya nsuka oyo Yehova ye moko asekwisaki. (Misala 10:40) Na ndenge yango, ebongi mpenza Yesu abengama “moto ya liboso mpe moto ya nsuka.”

Emoniseli 22:13 emonisi mpenza ete Yesu azali “Alfa ná Omega”?

 Te. Moto oyo azali koloba na Emoniseli 22:13 ayebani mpenza te, mpe bato mingi bazali koloba na mokapo yango. Na komantɛrɛ oyo Profesɛrɛ William Barclay asalaki mpo na eteni wana ya mokanda ya Emoniseli, akomaki boye: “Makambo ekomami polele te na molɔngɔ; . . . mbala mingi ezali mpasi koyeba mpenza nani azali koloba.” (The Revelation of John, Volume 2, oyo babongisi lisusu, lokasa 223) Na yango, tokoki koloba ete “Alfa ná Omega” oyo Emoniseli 22:13 elobeli azali moto oyo azwi ebengeli yango na bisika mosusu ya mokanda ya Emoniseli; elingi koloba Yehova Nzambe.

a Ebengeli yango emonani mpo na mbala ya minei na Biblia King James Version, na Emoniseli 1:11. Kasi, mabongoli mingi ya Biblia ya mikolo oyo etye yango te mpo ezali te na bamaniskri ya kala mpenza ya Grɛki. Emonani ete babakisaki yango na bakopi ya Makomami Mosantu oyo basalaki nsima.